Kingudingudi

Útá Wikipedia.
Sauter à la navigation Sauter à la recherche

Kingudingudi, eyebani lisusu mpe bo parotidite épidemique, eza bokono ya kouta na virus oyo ewutaka na virus ya kingundingudi.[1] Bilembo na ebandeli ya bokono mingi mingi ezalaka fièvre, mpasi ya misunyi ya nzoto, moto mpasi, na koyoka bolembu.[2] Mingi mingi nasima elandisamaka na mpasi ya kovimba glande parotide moko to nionso mibale.[3] Mingi mpeza bilembo bibandaka komonana na mikolo 16 kino 18 sima ya kozwa infection mpe kosila sima ya mikolo 7 kino 10.[1][2] Epayi ya batu bakolo bilembo ya bokono bitungisaka mingi koleka oyo ya bana.[2] Pene na 1/3 ya batu bazalaka na bilembo ndambu to te.[2] Mikakatano mikoki kozala  ba infections ya ezipeli ya bongo (15%), pancréatite (4%), kokufa matoyi mpo na libela, mpe mpasi na kovimba mabindi oyo mingi mingi mpeza te ememaka infertilité.[2] Basi bakoki kotungisama na kovimba ovaire kasi yango ebakisaka te risque ya infertilité.[3]

Kingudingudi ekabolamaka na bopete mingi mpe epanzanaka noki nakati ya batu oyo bazali kofuanda pene pene.[4] Virus nayango epesamaka na nzela ya matanga ya motoki to na bosimbi mutu oyo azwami na bokono.[1] Bobele batu nde bakoki kozwa bokono oyo mpe kopanza yango.[2] Batu bakoki kopesana bokono oyo kobanda na mua mikolo liboso bilembo bibanda komonana kino sima ya mikolo minei.[1] Sima ya kozwama na infection mingi mpeza mutu akomaka immunisé mpo na bomoyi naye mobimba.[2] Kozwa infection mbala mosusu ekoki kosalema kasi mbala yango bokono ekomaka pete.[5] Mpingi mpeza diagnostic ezalaka na mua nungunungu mpo na kovimba ya parotide mpe ekoki kozala confirmer na nzela ya koisoler virus na tampon moko ya canal parotidien.[1] Komeka ba anticorps ya IgM nakati ya makila ezalaka mpasi te mpe ekoki kozala ya litomba; kasi, ekoki kobungisa moke mpo na baye basila kozwa mangwele na kolakisaka negatif.[1]

Batu bokoki komibatela na kingudingudi na nzela ya bozwi dose mibale ya mangwele ya kingudingudi. Mingi ya ba pays développés babakisaka yango na mabongisi nabango ya bopesi magwele, mingi mingi kosangisa na mangwele ya rougeole na mangwele ya rubéole.[2] Na ba mboka oyo mangwele epesami mingi te bakoki komona motango ya batu bakolo kozwa bokono mokomata nde nayango mabongisi nionso kobeba koleka.[3] Nkisi ya kobikisa bokono oyo naino esembolami malamu te.[2] Makasi maye masalamaka mpo na kosunga ezali kolandela bilembo na bobeli nkisi ya kokitisa mpasi neti acétaminophène. Immunoglobuline ya kotuba na mizisa ekoki kosalisa na mikakatano songolo.[3] Bakoki kosenga kolalisa na mbeto ya lopitalo soki méningite to pancréatite emonani.[4][5] Mutu nakati ya batu nkoto zomi ya baye bazwami na bokono akufaka.[2]

Soki mangwele epesami te pene 0.1% kino 1% ya batu bazwaka infection na mobu. Mangwele eye epesami na batu ebele esalaka ete taux ya liwa ekita koleka 90%. Kingudingudi etungisaka batu mingi na ba pays en voie de développement epayi wapi mangwele epesami na batu mingi te.[6] Ba épidemie, atako mangwele epesami, ekoki kokoba kobimela batu basili kozwa mangwele.[3] Liboso ya boyeyi ya mangwele, kingudingudi ezalaka maladi ya bana oyo ezalaka kotungisa mingi na mokili. Ba épidemie ya bokono ya minene minene ekoki mingi mpeza kosalema mibu mibale to mitano nionso. Bana baye bazalaki na mibu kati na mitano na libwa batungisamaki mingi.[2] Nakati ya baye basili kozwa mangwele mingi mingi baye bawuti kokokisa mibu ntuku mibale batungisamaka na bokono oyo.[3] Nzinga nziga na équateur mingi mingi ebimelaka na mobu mobimba ntango na ba region oyo mosika na Nord mpe na Sud etungisaka mingi na saison ya hiver na printemps.[2] Mpasi ya kovimba ba glande parotide na mabindi ekundolamaki na Hippocrate na siècle ya 5 Yambo na Mbotama na Kristo.[1]

Epidemiology[kokoma | kobɔngisa mosólo]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. 1,0, 1,1, 1,2, 1,3, 1,4, 1,5 et 1,6 (en) William Atkinson, Mumps Epidemiology and Prevention of Vaccine-Preventable Diseases, 12,‎ , Chapter 14 p. (ISBN 9780983263135, lire en ligne)
  2. 2,00, 2,01, 2,02, 2,03, 2,04, 2,05, 2,06, 2,07, 2,08, 2,09, 2,10 et 2,11 "Mumps virus vaccines.". Weekly epidemiological record 82 (7): 49–60. 16 Feb 2007. PMID 17304707. http://www.who.int/wer/2007/wer8207.pdf?ua=1. 
  3. 3,0, 3,1, 3,2, 3,3, 3,4 et 3,5 Hviid A, Rubin S, Mühlemann K (March 2008). "Mumps". The Lancet 371 (9616): 932–44. doi:10.1016/S0140-6736(08)60419-5. PMID 18342688. 
  4. 4,0 et 4,1 Gupta, RK; Best, J; MacMahon, E (14 May 2005). "Mumps and the UK epidemic 2005.". BMJ (Clinical research ed.) 330 (7500): 1132–5. doi:10.1136/bmj.330.7500.1132. PMID 15891229. 
  5. 5,0 et 5,1 Sen2008 SN (2008). "Mumps: a resurgent disease with protean manifestations". Med J Aust 189 (8): 456–9. PMID 18928441. https://www.mja.com.au/journal/2008/189/8/mumps-resurgent-disease-protean-manifestations. 
  6. (en) Thomas Junghanss, Manson's tropical diseases., Oxford, 23rd,‎ 2013 (ISBN 9780702053061, lire en ligne), p. 261