Kopola mino

Útá Wikipedia.

Kopola mino, eyebani lisusu bo carie dentaire, to carie, ezali bobeti ya mino kolandana na ba bactérie.[1] Ba alvéole ekoki kozala na langi ya ndenge na ndenge kobanda na jaune kino na moyindo.[2] Bilembo bikoki kozala mpasi mpe nkokoso mpo na kolia.[2][3] Mikakatano mikoki kozala inflammation ya misunyi oyo eza nzinga nzinga na mino, mino kobukana, mpe infection to kobota abcès.t[2][4]

Kopola mino ewutaka na bobebi ya biteni ya makasi ya mino (émail, dentine na cément) kolandana na ba bactérie. Yango esalemaka mpo na acide oyo ebotami kowuta na ba salite ya bilei to sukali na likolo ya mino. Sukali mpamba nakati ya bilei eza esika ya yambo eye bactérie oyo ezwelaka makasi mpe nayango bilei biye bizali na sukali mpamba ebele eza facteur ya risque. Soki bozangi ba mineraux eza monene koleka oyo esangisamaki kowuta neti na soyi, carie esalemaka. Ba facteur ya risque ekoki kozala motindo eye esalaki ete soyi ezala moke neti: maladi ya sukali, Sjogren's syndrome mpe ba nkisi mosusu. Ba nkisi oyo ekitisaka kotingisa soyi eza antihistamines na ba antidépressif.[5] Carie elandanaka mpe na kibobola, kosokola monoko mabe, mpe kofunguama ya ba gencive oyo esalaka ete mizisa ya mino ezala polele.[1][6]

Nzela mpo na komibatela eza: koukolaka mino mbala na mbala, kolia bilei oyo eza na sukali moke, mpe kosalela mua fluor na bosokoli mino.[3][5] Kobrosser mino mbala mibale na mokolo mpe kolekisa singa kati-kati ya mino mbala moko na mokolo ezalaka recommandé.[1][5] Fluor ekoki kowuta na mayi, mungwa to na nkisi ya mino.[3] Kotraiter mama oyo azali na carie ekoki kokitisa risque ya bana naye kozwama nayango mpo ete motango songolo ya ba bactérie mokozala mosi mokiti.[5] Kokende epeyi na monganga mpo na talisa mino ekoki kosala ete bokono bokundolama liboso na ngonga.[1] Kolandana na ndenge ya bobebi, traitement ndenge na ndenge ekoki kopesama mpo kozongisa lino kosala ndenge elongobani to kolongola lino.[1] Eza na lolenge moko te loye loyebani mpo na kokolisa lisusu mino ebele.[7] Mingi mingi mpo na kozwa esika ya traitement ezalaka mua mindondo na ba pays en voie de développement.[3] Paracetamol (acetaminophen) to ibuprofen ekoki komelama mpo na kokitisa mpasi.[1]

Mokili mobimba, pene na 2.43 milliard ya batu (36% ya batu) baza na carie dentaire kati na mino nabango.[8] Organisation Mondiale ya Santé emoni ete batu bakolo pene banso bazwamaka na carie dentaire na eleko songolo ya bomoyi.[3] Epayi ya bana etungisaka pene na 620 million nabango to 9% ya batu.[8] Bokono oyo ekoma kozwa na bana na bakolo mikolo oyo.[9] Bokono oyo eza kozwa batu mingi nakati ya ba pays développés mpe eza kozwa batu mingi te na pays en voie de développement mpo na bolei mingi sulaki mpamba.[1] Carie ewuti na lokota ya Latin mpo na koloba "ya kopola".[4]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. 1,0 1,1 1,2 1,3 1,4 1,5 et 1,6 Silk, H (March 2014). "Diseases of the mouth.". Primary care 41 (1): 75–90. doi:10.1016/j.pop.2013.10.011. PMID 24439882. 
  2. 2,0 2,1 et 2,2 Laudenbach, JM; Simon, Z (November 2014). "Common Dental and Periodontal Diseases: Evaluation and Management.". The Medical clinics of North America 98 (6): 1239–1260. doi:10.1016/j.mcna.2014.08.002. PMID 25443675. 
  3. 3,0 3,1 3,2 3,3 et 3,4 "Oral health Fact sheet N°318". April 2012. http://www.who.int/mediacentre/factsheets/fs318/en/. Retrieved 10 December 2014. 
  4. 4,0 et 4,1 (en) Taber's cyclopedic medical dictionary, Philadelphia, Ed. 22, illustrated in full color,‎ 2013 (ISBN 9780803639096, lire en ligne), p. 401
  5. 5,0 5,1 5,2 et 5,3 SECTION ON ORAL, HEALTH; SECTION ON ORAL, HEALTH (December 2014). "Maintaining and improving the oral health of young children.". Pediatrics 134 (6): 1224–9. doi:10.1542/peds.2014-2984. PMID 25422016. 
  6. Schwendicke, F; Dörfer, CE; Schlattmann, P; Page, LF; Thomson, WM; Paris, S (January 2015). "Socioeconomic Inequality and Caries: A Systematic Review and Meta-Analysis.". Journal of dental research 94 (1): 10–18. doi:10.1177/0022034514557546. PMID 25394849. 
  7. Otsu, K; Kumakami-Sakano, M; Fujiwara, N; Kikuchi, K; Keller, L; Lesot, H; Harada, H (2014). "Stem cell sources for tooth regeneration: current status and future prospects.". Frontiers in physiology 5: 36. doi:10.3389/fphys.2014.00036. PMID 24550845. 
  8. 8,0 et 8,1 Vos, T (Dec 15, 2012). "Years lived with disability (YLDs) for 1160 sequelae of 289 diseases and injuries 1990-2010: a systematic analysis for the Global Burden of Disease Study 2010.". Lancet 380 (9859): 2163–96. doi:10.1016/S0140-6736(12)61729-2. PMID 23245607. 
  9. Bagramian, RA; Garcia-Godoy, F; Volpe, AR (February 2009). "The global increase in dental caries. A pending public health crisis.". American journal of dentistry 22 (1): 3–8. PMID 19281105.