Lingómbá lya mizíki

Útá Wikipedia.

Lingómbá lya mizíki ezalí lisangá lya balángá nzémbo babɛ́ti makembé ndéngé na ndéngé.

Lisanga lya miziki ezali etuluku ya bayembi to ya bibɛtɛli oyo basangisami mpo na kosala mosala ya miziki.  Motango mpe kosangisa ya basangani etali mokolo miziki, tango mpe lolenge ya boyembi oyo etalisami.  Mbala mingi, ekambamaka na motambwisi moko.

Na kotalela mabota ya bisaleli ya miziki oyo esalaka yango (nsinga, mopɛpɛ ya mabaya, cuivre mpe percussion), orchestre ekoki kozwa mitindo mingi lokola na miziki ya kala, orchestre symphonie monene (mabota minei elongo), orchestre ya etuluku (mipepe ya mabaya, cuivre mpe percussion), fanfare (cuivre, saxophone mpe percussion), bagad (mopepe ya mabaya mpe percussion) to orchestre simple ya bansinga.

Lisapo ya lisanga lya miziki[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Na ekeke ya 15 mpe ya 16 na Italie, mabota ya lokumu ezalaki na babɛti miziki mpo na kobɛta miziki mpo na mabina ya ndako ya mokonzi. Ba lisanga lya miziki ya solo ya mikolo na biso ebimaki na nsuka ya ekeke ya 16, ntango ba bakomi miziki babandaki kokoma miziki mpo na bituluku ya bibɛtɛli, elongo na bokoli ya théâtre, mpe mingimingi opéra. Ndakisa ya liboso ya lisanga lya miziki ya momesano ezalaki "Les Vingt-quatre Violons du Roi", oyo esalemaki na 1577 na France.

Na ebandeli ya ekeke ya zomi na nsambo, miziki ekomamaki mingi mpo na bituluku ya bayembi, oyo ezali ebandeli ya kobeta ya orchestre. Opera ebimaki na Italie, na nsima na Allemagne mpe na nsuka na Autriche.

Na nsuka ya ekeke ya 17, opéra ekómaki mingi na Angleterre elongo na Henry Purcell, mpe na France elongo na Jean-Baptiste Lully. A bandelisaki mpe esaleli ya ballet, elongo na Molière. Na nsima, bazalaki kotya miziki ya bibɛtɛli mpe ya mongongo na kati ya ballets.

Kasi na miziki ya Congo, lisanga lya miziki ebotami na 1930 lokola Affeinta Jazz ya A. Damoiseau mpe P. Mwanga, Africa ambiance ya Kuka Mathieu, Africa Jazz Pepe Kale ti na Viva la musika ya papa Wemba, Wenge Musika ya JB Mpiana na Werrason etc… kasi na bokeseni muke na ba lisanga lya miziki ya poto ba oyo ya congo bazalaki kosala Rumba to ndombolo. Ba lisanga lya miziki ya Congo ekambamaka na moto moko to bibale oyo akela to moko ya bakeli yango.

Mokonzi ya lisanga lya miziki[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Mokonzi, ye alandelaka ete miziki ebetama malamu mingi mingi ye pe azalaka alanga nzembo monene… N'a milulu ye nde akambaka makambo nioso… na Congo babengaka ye "Molakisi".