Lisangá lya Erópa
Lisangá lya Erópa to lisanga lya poto ezali lisanga ya boyangeli ya politiki mpe ya nkita ya bamboka 27 ya oyo bandimi kasundola ndambo ya makoki na bango na lingomba monene ya poto. Ezwui mabele monene koleka bamilio 4.2 ya Km², bato bazwami koleka bamilio 447 mpe ezali nguya ya misato ya nkita na mokili mobimba pona mombongo na bango na sima ya ba ameriki na chini. Lisanga lya Eropa etambolisami na boyokani ya Maastricht mpe boyokani ya Roma na lolenge na bango ya sika wuto 01/01/2009 mpe bokoti na mosala ya boyokani ya Lisbonne. Etambwiseli na yango esalemi koleka ba ndelo ya bikolo mpe boyangeli ya Ekolo : lingomba ya Eropa eponami na bayieropa bango moko, toli ya Eropa mpe toli ya lisanga ya Eropa ekumbami na bantoma ya bamboka ya lisanga. Mokambi ya bokonzi ya lisanga ya Eropa aponami na bayi lingomba ya Eropa na likanisi ya Toli ya Eropa. Esambiselo ya mibeko ya lisanga ya Eropa elandelaka botosi ya mibeko ya mibeko ya lisanga ya Eropa.
Limbola ya bendele ya lisanga lya Eropa
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Bendele ya Eropa ezali elembo kaka ya lisanga lya Eropa te, kasi mpe ya bomoko mpe bomoto ya Eropa na ndenge ya monene, lokola ezalaki liboso bendele ya Conseil ya Eropa. libungutulu ya minzoto ya wolo ezali komonisa bosungani mpe boyokani kati na bato ya Mpoto. Motango ya minzoto ezali na boyokani te na motango ya bikolo o kati. Bakeli ya bendele, Paul M.G Lévy na Arsène Heitz, balingaki bamonisa likoti ya lokumu ya minzoto 12 ya Maria na nzela ya Bac na Parisi. Na yango, bendele etikali ndenge moko, ata soki Conseil ya Eropa (lelo oyo ezali na bikolo 46) to lisanga lya Eropa (oyo ezali na ba bikolo 27) ekómi monene.
Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ. |