Makalekale

Útá Wikipedia.

Makalekale, eyebani lisusu bo kos'évanouir, kozala kidiba mpe kobungisa mayele, elimbolami bo bobungisi na ngonga mokuse ya mayele mpe makasi ya nzoto, oyo elendisami na komibimela na lobango, na ngonga mokuse mpe libiki ya mabalakata. Elandanaka na bokiti ya circulation ya makila nakati ya bongo mobimba mingi mingi kouta na hypotension artérielle. Ntina misusu ezalaka elongo na bilembo biye bimonanaka yambo na bokono liboso bobungisi bua mayele bosalema. Bilembo oyo bikoki kozala moto mpasi moke, kotoka, loposo kokoma jaune, buluyeke na miso, nausée, kosanza, mpe koyoka molunge na makambo misusu. Makalekale ekoki mpe kolandana na eleko moke ya contraction ya ba muscles. Soki mutu abungisi mayele mpe makasi ya nzoto nionso te, yango ekotalema bo yambo na makalekale. Esengelaka ete yambo na makalekale ezwa traitement ndenge moko na makalekale.[1]

Makalekale ewutaka na ba ntina ndenge na ndenge na oyo ya makasi te kino na oyo ekoki komema likama. Eza na lolenge misato ya ntina: oyo elandani na motema to mizisa ya makila, bokebi oyo eyebani lisusu bo maye malandani na oyo eza kati ya bongo, mpe hypotension orthostatique. Mikakatano ya motema na mizisa ya makila eza ntina ya pene na10% mpe yango nde ezalaka mobulu mpeza nzoka nde oyo ya maye maza kati na bongo nde ezwamaka epayi batu mingi. Oyo elendani na motema ekoki komema motema kobeta ndenge esengeli te, mikakatano na mizisa ya motema to misunyi ya motema mpe kozipa mizisa ya makila kowuta na embolie pulmanaire to dissection aortique to mpe eloko mosusu. Makalekale kolandana na maye maza na kati ya bongo esalemaka ntango mizisa ya makila efuangamaka mpe bobeti ya motema ekitaka ndenge elongobani te. Yango ekoki kosalema kolandana na likambo songolo neti kozala exposer na makila, mpasi to ba sentiment ya makasi to mpe kosala likambo ya komonana neti kosuba, kosanza, to kokosola. Lolenge ya makalekale oyo ekoki mpe kosalema ntango banyongi esika moko ya kingo oyo eyebani bo sinus carotidien. Lolenge ya suka ya makalekale elandanaka na bokiti ya tension artérielle ntango mutu atelemi. Yango elandanaka na ba nkisi mutu amelaka kasi ekoki mpe kolandana na bokauki ya mayi ya nzoto, kotangisa makila ebele to infection.[1]

Lisitwale ya bomeli nkisi, examen ya nzoto, mpe electrocardiogramme (ECG) eza ba nzela ya malamu mpeza mpo na koyeba ntina ya bokono. ECG eza ya litomba na bokundoli motema oyo ezali kobeta ndenge esengeli te, circulation mabe ya makali nakati ya misunyi ya motema, mpe nkokoso misusu ya courant ya nzoto neti syndrome QT ya ngonga molayi na Brugada. Ntina eye elandani na motema mingi mingi ezalaka na lisitwale moke mpeza ya prodrome. Hypotension artérielle na motema kobeta bangu bangu sima ya likambo ekoki kolakisa bobungi ya makila to bokauki ya mayi ya nzoto, nzoka nde niveau ya se ya oxygène na makila ekoki komonana sima na likambo epayi ya baye bazali na embolie pulmonaire. Ba teste oyo esengeli neti enregistreur de boucles oyo bokoki kotia mpe kolongola, épreuve ya orthotatisme to massage ya sinus carotidien ekoki kozala ya litomba na bas songolo. Tomographie na ordinateur (CT) mingi mingi mpeza basengaka te kosala yango, esalemaka kaka soki mokoni azali na mitungisi songolo. Ntina misusu oyo ekoki kozala na bilembo ya lolenge oyo eza crise, accident vasculaire, commotion, oxygène moke na makila, sukali moke na makila, intoxication na bomeli nkisi na mikakatano misusu ya mayele. Traitement elandanaka na ntina eye ememaki bokono. Baye batalemi bo baye bazali pene na likama monene bakoki kolalisama na mbeto ya lopitalo sima na boyebi lolenge nabango mpo na kolandela motema.[1]

Makalekale etungisaka pene na batu misato to motaba kati na batu nkoto moko mibu nionso.[1] It is more common in older people and females. Yango ezali ntina ya pourcentage moko kino misato ya batu oyo bakendeke na ba salle d'urgence mpe kolalisama na mbeto ya lopitalo. Pene na moitié ya basi baye baza na mibu koleka 80 mpe 1/3 ya bayekoli ya science medicale likambo oyo ekomelaka bango ata mbala moko na bomoyi nabango.[2] Na baye bakendeke na ba salles d'urgence mpo bazwuami na makalekale, pene na 4% bakufaka nakati mikolo 30 milandi.[1] Libaku ya kozwa sango mabe, elandanaka mingi mpeza na ntina eye ememaki bokono.[3]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. 1,0 1,1 1,2 1,3 et 1,4 Peeters, SY; Hoek, AE; Mollink, SM; Huff, JS (April 2014). "Syncope: risk stratification and clinical decision making.". Emergency medicine practice 16 (4): 1-22; quiz 22-3. PMID 25105200. 
  2. Kenny, RA; Bhangu, J; King-Kallimanis, BL (2013). "Epidemiology of syncope/collapse in younger and older Western patient populations.". Progress in cardiovascular diseases 55 (4): 357-63. doi:10.1016/j.pcad.2012.11.006. PMID 23472771. 
  3. Ruwald, MH (August 2013). "Epidemiological studies on syncope--a register based approach.". Danish medical journal 60 (8): B4702. PMID 24063058.