Maurice Mpolo

Útá Wikipedia.
Sauter à la navigation Sauter à la recherche

Maurice Mpolo (abótámí o 4 sánzá ya mísáto 1928, akúfí o 17 sánzá ya yambo 1961) azaláká moí-politíki, abomamá elɔngɔ́ na Patrice Lumumba na sánzá ya yambo wa 1961.

Bomɔi[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Maurice Mpolo abótámáká na Inongo, 4 sánzá ya mísáto 1928. Azaláká mwǎna ya Mpolo Edouard na Bokako Tècle[1], azaláká tatá mobóti ya bǎna mínei.

Lotómo ya bokonzi[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Maurice Mpolo azaláká mokomi wa bilenge na bonkúmú ya Lumumba. O mokɔlɔ ya 15 sánzá ya libwá 1960, Lumumba atíyáká Mpolo monkozi wa limpingá ya basɔdá. O mokɔlɔ ya 17 sánzá ya yambo 1961, Mpolo, Okito mpé Lumumba pɛnɛ ya Moboka ya Mwadingusha[2]. Na mobu 1992, o "Conférence Nationale" bakambi ya mboka ba mékaka ko tia mwinda na mayé étali liwa ya Mpolo, Okito, na Lumumba.[3] Nzóto ya Maurice Mpolo na ya baningá na yé ekátámáká mikémiké mpé ebwákámáká na soude epái ya Gerard Soete[4]

Makúmisi[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  • Nkómbó ya mofali ya Maurice Mpolo.[5] epésama na mbano mpɔ̂ na liwa ya Maurice Mpolo.

Búku[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  • (fr) Ludo De Witte, L’assassinat de Lumumba, Paris, Karthala, 2000
  • (fr) Lumumba, un crime d'État, Colette Brackman, éditions Aden, Bruxelles 2002,
  • (fr) Un insoumis, Jean Van Lierde, Labor, Bruxelles 1998,
  • (fr) Patrice Lumumba, jeunesse et apprentissage politique 1925-1956, J. Omasombo Tshonda et B. Verhaegen, éditions Institut Africain - Cedaf - L'Harmattan Paris, 1998,
  • (fr) Les secrets de l'affaire Lumumba

Mazíta o libándá[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bilílí[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Mituya ya miké[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. interview de Jacqueline Mpolo
  2. Citation venant de l'aricle de persée.fr lui même tiré de l'ouvrage de Jacques Brassinne et Jean Kestergat "Qui a tué Patrice Lumumba?"
  3. [1]
  4. Propos de George Soet sur la disparution des corps de Lumumba et Maurice Mpolo
  5. Mofali ya Maurice Mpolo na Kinsasa