Ngbáráwá

Útá Wikipedia.
Ngbáráwá
Mbua oyo azali na rage na niveau ya sima ya kosua motoNgbáráwá
Mbua oyo azali na rage na niveau ya sima ya kosua motoNgbáráwá
Mbua oyo azali na rage na niveau ya sima ya kosua moto
Classification mpe ressources ya kowuta libanda
ICD/CIM-10A82 A82
MedlinePlus001334

Ngbáráwálibómá lya mbwá ezalí bokɔnɔ bwa virúsi óyo esálaka éte kovímba makási ya bɔngɔ́ na bato mpé nyama ya mabɛ́lɛ.[1] Bilembo bya ebandeli ezalaka fɛ́fɛlɛ mpé koyóka lokóla lotilíki ezalí koleka na esíka óyo eswámákí.[1] Bilembo óyo elandamaka mɔ̌kɔ́ na mɔ̌kɔ́ na nzela ya bilembo óyo ezalí: ngánzálánganzala ya nkándá , kozanga kofándisa na kímyá, kobánga mái, kokoka koningisa binama bya nzoto tɛ̂, mikakatano mya bokanisi, na kosénzwa.[1] Nsima ya bilembo komɔnana, ngbáráwá na ntángo míngi ebomaka.[1] Kobanda na ntángo óyo moto azwí bokɔnɔ tíí ntángo óyo bilembo bizalí kolakisa esála sánzá mɔ̌kɔ́ ntína sánzá mísáto. Kasi, ntáno yangó mpé ekokí kochanger na kobanda ya mpɔ́sɔ mɔ̌kɔ́ tíí na koleka mobú mɔ̌kɔ́.[1] Ebéndé ya ntángo yangó ezalí ko dependre na ntángo óyo bokɔnɔ ekokoma na kátikati ya mintúngú.[2]

Ngbáráwá epésamaka koúta na bato tíí na nyama. Ngbáráwá ekokí koyambenela na ntángo óyo nyama óyo ezali na bokɔnɔ akwányí to aswí nyama mosúsu tǒ bato.[1] Nsɔ́i óyo eútí na monɔkɔ ya nyama óyo ezalí na ngbáráwá ekokí mpé koyambenelisa ngbáráwá soki nsɔ́i óyo ezalí na contact na miyoyo ya nyama mosusu to Moto.[1] la plupart ya rage na bomoyi ya bato ewuta na kosua ya mbua.[1] koleka 99% ya ba cas ya rage na bamboka ebele esalamaka mingi soki mbua a sui Mutu.[3] Na ba mboka ya Amerique, ba longembu bazali ba nyama oyo ezalaka na rage, pe moke ya 5% ya cas ya rage na bomoyi ya Batu ewuti epai ya ba mbua.[1][3] Ba rongeur bazuaka infection ya bokono oyo rarement.[3] virus ya rage etambolaka na cerveau na njela ya ba Systéme nerveux périphérique. Bokono ekoyebana kaka soki ba signe na yango emonani. [1]

Contrôle ya ba nyama na programme ya vaccination ekitisi ba risque ya rage oyo ewuti na bambua na bisika ebele na mokili mobimba.[1] Kopesa batu mangwele liboso ya kosuama na mbua ezali recommender na baoyo na zali na risque ya makasi. Groupe ya baoyo bazali na risque ya makasi ezali ba oyo basalaka mosala ya kosunga ba bangembo to soki ofandi ntagno molayi na bisika oyo rages ezali mingi.[1] na bato oyo bazali exposer na rage,Mangwele ya Rage be tango mosusu immunoglobuline ya rage ezali malamu mingi pona ko prevenir bokono soki mutu abandi traitement liboso ba signes ya rage esala manifestation.[1] kosokola ba pota na makwanza pendant 15 minutes na savon pe na mayi, povidone d’iode, soki pe badetergent oyo ekoki koboma virus, ezali pe malamu mingi na tina yako prevenir transmission ya virus ya rage.[1] kaka batu mike ba bikaka na infection ya rage esalamaki na lisalisi ya traitement ya makasi, oyo eyabaki na nkombo ya le protocol de Milwaukee.[4]

Rage ezali responsable ya 26,000 tina 55,000 ya koboma na mokili mobimba na mbula moko.[1][5] koleka 95% ya ba oyo bakufi ezali mingi na mikili ya Asie pe Afrique.[1] Rage ezali penza na mikili mingi soki pe koleka 150 countries ya bamboka pe na ba continent nyonso kasi na mboka ya Antarctique te.[1] Batu koleka 3 billion bazali ko vivre na ba regions ya mokili bisika rage ezali.[1] Mingi pe na Europe na Australie, rage ezali kozuama kaka na kati ya bangembo.[6] Ba îles mingi ezali na bokono ya rage te.[7]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. 1,00 1,01 1,02 1,03 1,04 1,05 1,06 1,07 1,08 1,09 1,10 1,11 1,12 1,13 1,14 1,15 1,16 et 1,17 "Rabies Fact Sheet N°99". World Health Organization. July 2013. http://www.who.int/mediacentre/factsheets/fs099/en/. Retrieved 28 February 2014. 
  2. Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).
  3. 3,0 3,1 et 3,2 Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).
  4. Hemachudha T, Ugolini G, Wacharapluesadee S, Sungkarat W, Shuangshoti S, Laothamatas J (May 2013). "Human rabies: neuropathogenesis, diagnosis, and management.". Lancet neurology 12 (5): 498–513. doi:10.1016/s1474-4422(13)70038-3. PMID 23602163. 
  5. Lozano R, Naghavi M, Foreman K, Lim S, Shibuya K, Aboyans V, Abraham J, Adair T, Aggarwal R, et al. (Dec 15, 2012). "Global and regional mortality from 235 causes of death for 20 age groups in 1990 and 2010: a systematic analysis for the Global Burden of Disease Study 2010.". Lancet 380 (9859): 2095–128. doi:10.1016/S0140-6736(12)61728-0. PMID 23245604. 
  6. "Presence / absence of rabies in 2007". World Health Organization. 2007. http://www.who.int/rabies/Absence_Presence_Rabies_07_large.jpg?ua=1. Retrieved 1 March 2014. 
  7. "Rabies-Free Countries and PoliticalUnits". CDC. http://www.cdc.gov/animalimportation/rabies-free-countries.html. Retrieved 1 March 2014.