Piololo nakati ya matoyi

Útá Wikipedia.
Kokɛndɛ na: bolúki, boluki

Piololo nakati ya matoyi eza mutu koyoka mongongo ntango libanda ya matoyi makelele eza te.[1] Mingi mingi ntango etatolama bo ngongi, ekoki mpe koyokana neti eloko ekobetaka nakati ya litoyi, piololo to konguluma.[2] Mbala mingi te, mingongo ya batu to ya miziki oyo eza claire te ekoyokama.[3] Mongongo ekoki kozala pete to makasi, hauteur ya se to hauteur ya likolo mpe emonani neti eza kouta na litoyi to nionso mibale.[2] Mingi mingi, eyaka malembe malembe eza komata.[3] Epayi ta batu mosusu, mongongo yango ememaka depression, anxieté to kobebisa concentration.[2]

Piololo nakati ya matoyi eza bokono te kasi eza elembo oyo ekoki kouta na ba ntina oyo ememaka maladi. Moko ya ba ntina oyo eyebani mingi eza kobungisa koyoka oyo ewuti na makelele. Ntina misusu eza: ba nfection ya matoyi, mpasi ya motema to ya ba vaisseau ya makila, kizunguzungu ya Ménière, bongo kovimba, komela lolenge songolo ya ba nkisi, pota na moto oyo ezwama kala mpe mafuta ya matoyi.[2] Mingi mingi ezwaka batu oyo baza na depression.[3]

Minigi mingi diagnostic elandanaka maye mokoni alobi. Mbala mususu, mongongo ekoki koyokama na mutu mususu oyo azali kosalela stéthoscope: mpo na yango, piololo na matoyi eyebani bo eye eza objectif. Ba questionnaire ndenge na ndenge eza mpo na kotatola ndenge piololo na matoyi eza kotungisa bomoyi ya mutu.[3] Esengeli batu basala examen ya audiograme mpe ya ba nerfs nakti ya diagnostic.[1][3] Soki nkokoso ezwami, kozwa bilili na scanner neti MRI ekoki kozala recommandé. Baye baza na piololo nakati ya matoyi oyo esalemaka motindo moko na ebeteli ya motema nabango esengeli basala ba examen mosusu.[3]

Mpo na komibatela esengeli kosala ete makelele ya makasi ekota na matoyi te.[2] Soki ntina eye ememaki bokono eyebani, kotraiter yango ekoki kosalisa.[3] Soki te, mingi mingi, mpo na kosalisa balelaka ndenge ya kobikisa na maloba.[4] Ba appareil ya kopesa mongongo to ba appareil accoustique ekoki mpe kosalisa.[2] Kotala na mobu ya 2013, nkisi ya kobikisa mpeza naino ezwamaki te.[3] Ezwaka batu mingi, etungisaka pene na 10 kino 15% ya batu. Mingi na bango, bakipaka yango te mpe yango eza nkokoso monene obe na 1 to 2% ya batu.[4] Nkombo ya bokono ewuta na Latin tinnīre oyo elingi koloba "kobeta ngonga".[3]

See also[kokoma | kobɔngisa mosólo]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. 1,0 et 1,1 Levine, RA; Oron, Y (2015). "Tinnitus.". Handbook of clinical neurology 129: 409–31. doi:10.1016/B978-0-444-62630-1.00023-8. PMID 25726282. 
  2. 2,0, 2,1, 2,2, 2,3, 2,4 et 2,5 "Tinnitus". September 2014. http://www.nidcd.nih.gov/health/hearing/Pages/tinnitus.aspx. Retrieved 22 May 2015. 
  3. 3,0, 3,1, 3,2, 3,3, 3,4, 3,5, 3,6, 3,7 et 3,8 Baguley, D; McFerran, D; Hall, D (Nov 9, 2013). "Tinnitus.". Lancet 382 (9904): 1600–7. doi:10.1016/S0140-6736(13)60142-7. PMID 23827090. 
  4. 4,0 et 4,1 Langguth, B; Kreuzer, PM; Kleinjung, T; De Ridder, D (Sep 2013). "Tinnitus: causes and clinical management.". Lancet neurology 12 (9): 920–30. doi:10.1016/S1474-4422(13)70160-1. PMID 23948178.