Post Natal Depression

Útá Wikipedia.
Sauter à la navigation Sauter à la recherche

Nini Postnatal Depression? Bato ba kobenga bokono yango mawa na sima ya boboti. Bokono yango ezali mawa mwa ndambo. Basi ebele bakozala na mawa mwa ndambo na sima ya boboti.

Kasi, 10% ya bamama ya sika sika bakozala na post natal depression ya mabe (PND). Bamama ya sika sika ebele bakozala na post natal depression te koyeba, te bakoki kobikisa bokono yango. Bokono yango ekopesa mwasi mpe libota na baninga mawa mingi. Basi basusu bakoki kozala na puerperal psychosis — bokono ya mutu ya monene, ye ekobanda na sima ya boboti, tee na mposo motoba na sima ya mbotama ya mwana.

Nini elembo ya Post Natal Depression?[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Post natal depression ekoki kozala tango mawa na sima ya boboti ekokoma mabe penza. To depression ekoki kozala malembe malembe mpe bato bakoki koyeba te, te mwasi azali kobela ntango elai na sima ya mbotama ya mwana. Tango mosusu, okoki kobongisa mwana te mpe ozali na mawa. To o kolela mbala mingi. Bamama basusu, oyo bazali na PND bakopangana mpo na bokolongono na bango mpe na mwana. Bakoki kozala na bomo mpe na nkanda mikolo minso. Bamama oyo bazali na post natal depression bakolemba mikolo minso. Bakoki kosala te likambo ya pasi te. Bamama basusu bakoyoka mpasi, te kozala na likambo. Bakolala na bokasi mpe ba lingi kolia te. Ba kolinga kosiba te.

Elembo ya puerperal psychosis ekoki kozala lokola liboma. Mwasi a koki kozala na esengo mpe kosepela mingi, mpe koloba mbango. A koki mpe kolala te na kosala makambo mbango. Bato basusu bokoki koloba, te ozali pasi mpe o kotinda bato, na o kosilika mingi tango nzambi ekozala. Bato basusu bakozala na mawa mingi, mpe na mbisa ba kosepela mingi. Bakoki mpe komona na koyoka likambo oyo ezali te.

Bobokoli[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Soki depression na yo ekoumeli mikolo ebele, o sengeli na kokende na kotala monganga na yo mpe koyebisa ye bokono na yo. Post natal depression ezali bokono ya solo mpe bakoki kobikisa bokono yango malamu.

Bobokoli ezali mbala mingi anti-depressants. Bobokoli oyo ekobikisa yo malembe, kasi soki ozali eliki kitoko te na sima ya mposo mingi, senga monganga na yo bobokoli eleki makasi to bobokoli mosusu. Soki depression ekomi ya mabe penza tango ya sanza na yo, senga ye bobokoli ya progesterone. Bamama oyo bazali na puerperal psychosis basengeli kokende kotala psychiatre (monganga ya mutu). Bakoki kopesa yo bobokoli na ndako, kasi okotikala na lopitalo mbala mingi – lopitalo basusu bazali na biteni ya bamama na bana mpo na bokono ya mutu. Bobokoli ezali mbala mingi mino ya anti-psychotic mpe anti-depressant.

Baninga na libota bakoki kosunga yo[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Baninga mpe libota basengeli kozala boboto. Bokono ekobikisa na mbango mpe bobokoli bozali ya bokoti, kasi bato basengeli kosunga yo mingi tee na nsuka. Bato nyonso, oyo bazali na yo basengeli koyeba te ozali kobela – basengeli kopalela yo te. Libota na yo e sengeli kososolo te o kozwa bobokoli na doktolo mpe bakoki kolongisa yo soki o sengeli kokende kosenga mino mosusu. Bopemi ekosalisa yo, mpo na kobikisa. Libota mpe baninga na yo basengeli kosala mosali nyonso mpo na yo. Kasi tango okozala eliki kitoko, sala makambo nyonso. O Okozala na mikolo malamu mpe mabe. Soki o lingi kozala penza te, senga libota na baninga na yo kotikala na yo tango nyonso. Kosimba mpe bopwepwi na mobali na yo ekopesa yo elikia – penza soki o lingi kosiba te.

Soki o kopangana mpo na bokolongono na mutu na yo, to bokolongono na bandeko to baboti na yo, senga GP na yo, a kolakisa yo lopitalo ya bokono ya mutu.

Bosungi mpo na bokono ya mutu (Assistance Psychologique)[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Soki ozali na PND koloba na bato mpo na bokono na yo ezali malamu mingi. Tembe na baninga mpe libota ekosalisa yo, kasi senga monganga na yo to mobotisi ya mwasi to mosali ya bokolongono. Ba koyebisa yo makambo nyonso po na bosungi mpo na bokono ya mutu.

Kosunga yo moko[kokoma | kobɔngisa mosólo]

O sengeli koyamba, te o koki kobika na nsuka – ata malembe. Bongisa yo moko, pema ebele mpe pangana te soki okoyoka mpasi. Lia malamu – lala nzala te. Soki ozali penza, organisation yango ekoki kopesa yo bondeko mpe bosalisi.