Sinusite

Útá Wikipedia.

Sinusite, eyebani mpe lisusu bo infection ya sinusite to rhinosalpingite, eza inflammation ya ba sinus oyo ekomeka bilembo ya bokono. Bilembo biye biyebani mingi eza miyoyo monene, zolo kozibama, mpe mpasi na elongi.[1] Bilembo misusu bikoki kozala fièvre, moto mpasi, zolo koyoka solo malamu te, mpasi ya kingo, mpe kokosola.[2][3] Kosukosu ekomaka makasi mpeza na butu. Mikakatano ya makasi ezalak mpeza mingi te.[3] Etatolami bo rhinosinusite ya makasi (ARS) soki eumeli na se ya poso minei, mpe bo rhinosinusite ya kozongoka mbala na mbala (CRS) soki eumeli koleka poso zomi na mibale.[1]

Ekoki kouta na infection, ba allergies, pollution ya mopepe, to nkokoso mpo na ndenge ya kati ya zolo. Ba cas mingi elandanaka na infection ya virus.[2] Infection ya bactérie ekoki kobimela soki bilembo biumeli koleka mikolo zomi to soki bokono ekomi lisusu makasi epayi ya mokoni sima na ntango abandi koyoka mua malamu. Bokono kozongelaka sima na bileko ekomelaka mingi baye baza na maladi ya mpema, fibrose cystique, mpe bokengi mabe ya nzoto. Esengelaka te kosalela ba rayons-X soki kaka emonani neti mikakatano mizali. Mpo na bas oyo ezongaka mbala na mbala, esengelaka kosala ba teste mpo na confirmation, ezala ya kotala na miso to ya tomographie na ordinateur.[1]

Ba cas misusu mpo na komibatela nayango batu bakoki kosukola maboko, kotika kobenda likaya, mpe kokata mangwele.[2] Ba calmants neti naproxène, steroïdes ya zolo, mpe kolekisa mayi na zolo bakoki kosalela yango mpo na kosunga mobeli oyo aza na bilembo ya bokono.[1][4] Kotraiter sinusite na ba antibiotique to te endimami mpo na ba cas ya ba bactérie oyo eza na mikakatano te. Soki sima na mikolo sambo mosusu mbongwana ezali kaka te bakoki kosengela kosalela ba antibiotique to kobongola oyo bazalaki kosalela. Mpo na baye basalaleka ba antibiotique mpo nabango, ezala amoxicilline to amoxicilline/clavulanate  azalaka recommandé yambo.[1] Mbala mususu bakoki kosala lipaso mpo na baye bokono oyo ezongelaka bango mbala na mbala.[5]

Sinusite eza bokono ya kokamwisa te.[1] Etungisaka pene na 10% na 30% ya batu mobu na mobu na Etats Unis mpe na Eropa.[1][6] Mingi mingi basi bazwamak nayango koleka mibali.[7] Sinusite ya kozongaka mbala na mbala etungisaka pene na 12.5% ya batu.[8] Traitement ya sinusite na Etats Unis ekumbaka misolo koleka 11 milliards ya dollard américain.[1]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. 1,0 1,1 1,2 1,3 1,4 1,5 1,6 et 1,7 Rosenfeld, RM; Piccirillo, JF; Chandrasekhar, SS; Brook, I; Ashok Kumar, K; Kramper, M; Orlandi, RR; Palmer, JN et al. (April 2015). "Clinical practice guideline (update): adult sinusitis executive summary.". Otolaryngology--head and neck surgery : official journal of American Academy of Otolaryngology-Head and Neck Surgery 152 (4): 598–609. doi:10.1177/0194599815574247. PMID 25833927. 
  2. 2,0 2,1 et 2,2 "Sinus Infection (Sinusitis)". September 30, 2013. http://www.cdc.gov/getsmart/antibiotic-use/URI/sinus-infection.html. Retrieved 6 April 2015. 
  3. 3,0 et 3,1 "What Are the Symptoms of Sinusitis?". April 3, 2012. http://www.niaid.nih.gov/topics/sinusitis/Pages/symptoms.aspx. Retrieved 6 April 2015. 
  4. King, D; Mitchell, B; Williams, CP; Spurling, GK (20 April 2015). "Saline nasal irrigation for acute upper respiratory tract infections.". The Cochrane database of systematic reviews 4: CD006821. doi:10.1002/14651858.CD006821.pub3. PMID 25892369. 
  5. "How Is Sinusitis Treated?". April 3, 2012. http://www.niaid.nih.gov/topics/sinusitis/Pages/treatment.aspx. Retrieved 6 April 2015. 
  6. Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).
  7. "Sinusitis". U.S. National Institute of Allergy and Infectious Diseases. April 3, 2012. http://www.niaid.nih.gov/topics/sinusitis/Pages/Index.aspx. Retrieved 6 April 2015. 
  8. Hamilos DL (October 2011). "Chronic rhinosinusitis: epidemiology and medical management". The Journal of Allergy and Clinical Immunology 128 (4): 693–707; quiz 708–9. doi:10.1016/j.jaci.2011.08.004. PMID 21890184.