Sylvie Kinigi
Sylvie Kinigi, abotami o mobu 1952 na Mugoyi ( Ruanda-Urundi ), azali mwasi ya ekolo ya Burundi . Azalaki Premier ministre ya Burundi kobanda mokolo 10 sanza ya nsambo 1993 kino mokolo 7 sanza ya mibale 1994 mpe de facto mokonzi ya mbokakobanda 27 sanza ya zomi 1993 kino 5 sanza ya mibale 1994 .
Biografi ya bomoi ya bato
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Bilenge mpe mateya
[kokoma | kobɔngisa mosólo]awutaki na libota ya Batutsi, Sylvie Kinigi abalaki Firmin Kinigi ya Hutu, na 1973, oyo akomaki bibliothécaire-chef ya Iniversite ya Burundi na Bujumbura . Ba boti bana mitano. Firmin Kinigi akufaki na 1993 .
Diplômé ya Iniversite ya Burundi, sima ya koyekola kokamba nkita, asalaki mosala ya leta ya Burundi kino 1991 .
Na sima akomaki mopesi toli ya likolo na biro ya Premier ministre, oyo azalaki kosala na politiki ya nkita, mokambi ya mbongwana ya etongwami mpe nkita . Na nsima, azwaki mosala ya mpasi mingi ya kosala na déficit ya budget na kokataka polele misolo ya basoda oyo bazalaki koyangela na ba Tutsi, oyo banda kala bazalaki kozwa matomba na ndenge oyo bazalaki kozwa bango na ndenge ya malamu.
Eteni ya ntina ya mosala na ye ezali ya kosala boyokani mpo na lisalisi na ba donateurs ya mikili ya Mpoto mpo na komema mbongwana ya nkita na Burundi. Ya solo, nkita ya ekólo yango etaleli mingi biloko oyo batindaka na mikili mosusu ya kafe mpe tii.
Nsima ya botomboki ya yambo na sanza ya mwambe 1988 oyo esalaki liwa ya 20 000 bato, mokonzi ya mboka Pierre Buyoya, soda Tutsi ya lisanga mpo na Union pour la progrès national (UPRONA), na mokambi ya mbulamatari ya lolenge ya basoda, atiaki commission ya boyokani mpo na koluka a solution mpo na kosilisa mobulu na mboka.
Na 1992, commission yango esalaki mibeko-mokonzi ya mboka ya sika, oyo mokonzi ya mboka andimaki mpe nsima na référendum. Mokanda ya sika epesi nzela ya kosala mbulamatari oyo ezali na ekolo te, na mokonzi ya mboka mpe Parlement . Na ebandeli ya mbula oyo elandaki, mokonzi ya mboka Buyoya alobaki na mongongo makasi ete maponami masengeli kosalema ata ndenge nini.
Na sanza ya motoba 1993, Melchior Ndadaye ya lisanga Front pour la démocratie ya Burundi (FRODEBU), azalaki mokonzi ya mboka ya liboso ya Hutu oyo aponami na mboka na 66 % ya ba votes . atiaki mosolo o mokolo 10 sanza ya nsambo oyo elandaki, atie kombo ya Sylvie Kinigi Premier ministre [1] . Ezali eteni ya mayele na ye ya kotonga bomoko kati na bikolo mibale ya minene ya Burundi — Ndadaye azalaki Hutu oyo alingaki kokitisa bonguna ya ba Tutsi na administration na ye na ko pona Tutsi moko lokola Premier ministre. koponama ya Sylvie Kinigi elandaki oyo ya Agathe Uwilingiyimana lokola Premier ministre na Rwanda.
Makambo mazalaki na mindondo mpo Kinigi azalaki mosangani ya lisanga politique dominé na ba Tutsi ( Parti Union pour la Progrès National ) ya mokonzi ya mboka ya kala Pierre Buyoya, officier militaire ya kala oyo M. Ndadaye alongamaki na maponami ya sanza ya motoba 1993 [2] . Mingi bakanisaki ete mokonzi ya mboka Buyoya oyo azali kolongwa na mosala asengaki ete ya sika Ndadaye apona Kinigi lokola Premier ministre .
Sylvie Kinigi, na ngambo na ye, atalelaki boyokani boye kati na bikolo mibale lokola likambo na ye ya liboso na mosala na ye ya Premier ministre, mpo na kozala na makoki ya kotonga mwango ya botomboli nkita na Burundi.
Kasi o mokolo 21 sanza ya zomi 1993, ba parachutistes bakotaki na ndaku ya mboka, bakangaki mpe babomaki mokonzi ya mboka Ndadaye mpe ba ministres na ye motoba. Bakonzi ya coup d’Etat batie couvre-feu, bakati ba lignes ya téléphone, bazui contrôle ya radio ya l’Etat, mpe bakangi Aéroport international ya Bujumbura . Na nsima, ata 600 000 ya Hutu bakimaki na Rwanda, ekólo oyo ezalaki pembeni. Coup d’Etat wana ebandaki etumba ya bana-mboka, mpe mobulu ya bikólo ekómaki pene na teritware mobimba ya ekólo.
Premier ministre Sylvie Kinigi azwaki ekimelo, lokola mpe ba ministres na ye misusu na ambassade ya France na engumba mokonzi. Botelemeli ya coup d’Etat ebandaki, ememaki bakomi na yango na mposa ya kozongisa bokonzi na mbulamatari oyo mibeko eyebi . o mokolo 26 sanza ya zomi, Sylvie Kinigi alobaki na bavandi ya mboka na nzela ya radio ya l’Etat mpo na koluka kozongisa ordre mpe kolongola couvre-feu oyo ba putschistes batiaki. De facto, amimonaki na mokumba ya ekolo sima ya coup d'Etat ya ba soda oyo elongaki te
Engebene mobeko-mokonzi ya Burundi, mokambi ya parlement asengelaki kozwa ebonga soki prezida akufi. Kasi, abomamaki mpe na coup d’Etat oyo balingaki kosala. Sylvie Kinigi amimonaki na moto ya exécutif, mpe mbongwana moko boye ya situation esalemaki. : ba soldats bazongi na kaserne na bango, Sylvie Kinigi aboyaki amnistie générale mpo na bakambi ya coup d’Etat, asengi ete enquête ezala na ba conditions ya coup d’Etat .
Na sima, Premier ministre alapaki ndai ya kosala commission spéciale mpo na kobongisa maponami ya sika ya mokonzi ya mboka. Likambo ya mawa, mobulu ya bikolo ekobaki na mboka, mpe Sylvie Kinigi akokaki kosala mingi te mpo na kopekisa mbonge wana ya mobulu. mokonzi ya mboka ya sika ya Burundi, Cyprien Ntaryamira, ya FRODEBU, azuaki bokonzi o mokolo 5 sanza ya mibale, asukisaki interim ya Syvie Kinigi na moto ya exécutif .
Kasi akokaki kotikala kuna kaka sanza mibale, kobanda mokolo 5 sanza ya mibale kino mokolo 6 sanza ya minei 1994, kaka mpo na kokufa liwa ya mobulu na kobundisa pepo ya mokonzi ya Rwanda Juvénal Habyarimana . Mbulamatari ya coalition esalemaki na Sylvestre Ntibantunganya lokola mokonzi intermédiaire kasi oyo ezalaki na makoki te ya komema kimia. Major Buyoya azongelaki bokonzi na coup d’Etat o mokolo 25 sanza ya nsambo 1996 .
Boyokani ya kimya ya Arusha etiamaki sinyatili na mbulamatari, oyo na ntango wana ezalaki koyangela na Batutsi mpe mangomba ya politiki ya Hutu mpe Tutsi, o mokolo 28 sanza ya mwambe 2000 . Kasi ba mouvements minene ya batomboki ya Hutu baboyaki ko initialiser yango mpe bayebaki yango te. Na yango, boyokani oyo ya Arusha ekokaki te kosukisa etumba ya bana mboka ya Burundi oyo esopaki mboka na makila na boumeli ya mibu zomi .
Sima ya kolongolama na ebonga ya Premier ministre, Sylvie Kinigi asalaki na Banque centrale ya Burundi, ebonga oyo ebongi na ye makasi mpo na kelasi ya nkita na ye mpe na makoki na ye ya ko kamba mikakatano, bamakoki oyo akolisaki bien évident tango akomaki de facto mokonzi ya ekolo nsima na bobomami ya mokonzi ya mboka Ndadaye. Lokola azalaki civil, Sylvie Kinigi alobaki na ndenge ya moto ye moko na ntina ya mikakatano ya Burundi. Andimisamaki ete demokrasi eyaki noki noki mingi na Burundi [3] . Na nsima asalaki na ONU .
Banote mpe ba références
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- ↑ Erreur de référence : Balise
<ref>
incorrecte : aucun texte n’a été fourni pour les références nomméesLM1993
- ↑ BBC Summary of Foreign Broadcasts, 1993.
- ↑ {{Ouvrage}} : paramètre
titre
manquant, p. 121