Trachome

Útá Wikipedia.

Trachome, eyebani mpe lisusu bo conjonctivite granuleuse, ophtalmie ya Egypto,[1] mpe bolanda ya trachome, eza bokono eye epesamaka kolandana na bactérie trachome Chlamydia. Infection ememaka makwanza nakati ya poso ya liso. Makwanza oyo ekoki komema mpasi na miso, kobeba ya libanda ya cornée ya miso, mpe ntango mosusu bolanda. Ba infection ya trachome eye baza komelela nkisi te mpe ekozongaka mbala na mbala, ekoki komema lolenge ya bolanda ya libela ntango poso ya miso ebaluki na kati.[2]

Bactérie eye ememaka bokono oyo ekoki kokabolama na bosimbi mbala moko to na nzela mosusu miso to zolo ya mutu oyo azwami na bokono. Kosimba na nzela mosusu ekoki kozala na nzela ya bilamba to nzinzi oyo esimbaki miso to zolo ya mutu oyo azwami na bokono. Mingi mingi bana bakabolaka bokono oyo koleka batu bakolo. Assainissement ya mabe, bisika biye bitondi batu koleka, mpe bozangi mayi ya mpetwa na ba toilette ebakisaka mpe kokabolama ya bokono.[2]

Makasi maye masalemaka mpo komibatela eza konetola lolenge ya kozwa mayi ya mpetwa mpe kokitisa motango ya batu oyo bazwami na bokono na bopesi bango ba nkisi ya antibiotiques.[2] Yango ekoki kozala kopesa nkisi, na banso mbala moko, na ba ngulupa ya batu baye bokono ezwaka bango mbala na mbala.[3] Komisokola yango moko ekokaka te mpo na komibatela na bokono kasi ekoki kozala ya litomba elongo na mikano misusu.[4] Lolenge ya nkisi eza azithromycine ya komela na tétracycline topique.[3] Basepelaka na azithromycine mpo ete bakoki kosalela yango bo dose unique ya komela.[5] Sima na cicatrice komonana na poso ya miso, ekoki kosengela ntango mususu kosala lipaso mpo na kobongisa nsuki ya miso mpe kobatelama na bolanda.[2]

Na mokili mobimba, pene na 80 million ya batu baza na infection eye ezali naino kotungisa.[6] Na bisika misusu ba infections ekoki kozwa batu ebele kino na 60–90% ya bana mpe etungisaka mingi basi koleka mibali mpo ete bango bazalaka pene pene mingi penza na bana.[2] Bokono oyo eza ntina ya mikakatano ya komona na 2.2 million ya batu nakati nabango 1.2 million bazali balanda mpeza.[2] Mingi mingi ezwaka batu na ba mboka 53 ya Afrika, Asia, Amerika ya Kati mpe ya Se mpe pene na 230 million ya batu baza na risque ya kozwa yango.[2] Ememaka 8 milliards ya dollard USD na nkita ya Amerika mobu na mobu.[2] Yango ezali nakati ya mopiko ya ba maladi oyo eyebani bo maladi ya region tropicale oyo ekipamaka te.[6]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).
  2. 2,0 2,1 2,2 2,3 2,4 2,5 2,6 et 2,7 "Blinding Trachoma Fact sheet N°382". World Health Organization. November 2013. http://www.who.int/mediacentre/factsheets/fs382/en/. Retrieved 14 March 2014. 
  3. 3,0 et 3,1 Evans JR1, Solomon AW (March 2011). "Antibiotics for trachoma". Cochrane Database Syst Rev 16 (3): CD001860. doi:10.1002/14651858.CD001860.pub3. PMID 21412875. 
  4. Ejere, HO; Alhassan, MB; Rabiu, M (20 February 2015). "Face washing promotion for preventing active trachoma.". Cochrane Database of Systematic Reviews 2015 2 (2): CD003659. doi:10.1002/14651858.CD003659.pub4. PMID 25697765. 
  5. Mariotti SP (November 2004). "New steps toward eliminating blinding trachoma". N. Engl. J. Med. 351 (19): 2004–7. doi:10.1056/NEJMe048205. PMID 15525727. http://content.nejm.org/cgi/pmidlookup?view=short&pmid=15525727&promo=ONFLNS19. 
  6. 6,0 et 6,1 Fenwick, A (Mar 2012). "The global burden of neglected tropical diseases.". Public health 126 (3): 233–6. doi:10.1016/j.puhe.2011.11.015. PMID 22325616.