Yoane ya La Fontaine

Útá Wikipedia.
Sauter à la navigation Sauter à la recherche

Erreur de script : la fonction « build » n’existe pas.

Yoane ya La FontaineJean de La Fontaine azalakí mokomi buku mpe mobeti masolo ndenge na ndenge ya ekolo Falansia, oyo ayebani mingi mpenza mpo ya Masapo ma ye.

Bomoi bwa mokomi[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Yoane ya La Fontaine abotamaki na mobu 1621 na Château-Thierry na Falansia.

Na nsima ya botangi na eteyelo ya kati, baboti ba ye batindaki ye na Likindo Like mpo akoma gsango. Kasi, ntango alongwaki Likindo Like lina mpe aboyaki kolanda mosala mwa bosaleli Nzambe, La Fontaine akendeki na kelasi ya ngomba na engumba Paris mpo na kotanga mambi ma kokata mpe kosambisa makambo. Tango asili, akomaki moko wa baye basalisaka bato bakweli makambo mpo ya bolongi liboso ya ba zuzi. Kuna mpe abandaki kokende kokutana na bakomi buku baye bazalaki komibengama na nkombo ‘te 8a Mampinga ma Etande ya Libungutulu.

Na nsima ya liwa ya tata na ye oa 1658, azongaki epai na bango na mabele ma Chateau-Thierry mpo ya bokobi mosala tata asalaka ya bozali mokonzi oyo atalaka mpe abatelaka bibale mpe zamba inso. Ye nde moto apesaki mwana wa ye elengi mpe momeseno mwa kolinga biloko bwa mokili Nzámbe asalaki. Na mobu 1647, ayaki kobala Marie Héricart, mwasi moko ya mayele oyo, lokola ye moko, abandaki mpe kokende kosangana na bakeomi mpe bai mayele. Lokola mpasi ekotelaki ye na nsima ya liwa ya tata, La Fontaine azwaki lisalisi ya batu mingi ya nkita mpe bayebani mpe azalaki kokoba kosangana na bai mayele mpe bakomi baye bazalaki kokutana na ba mbalasani ya bango, kuna akutanaki na bakomi banene lokola Charles Perraut mpe mingi mpenza Moliére. Wana azwaki mokano mwa bomipesi na mosala mwa bokomi buku.

Na nsima ya bokomi buku ya ye ya liboso, Ekomba mpé Etula ya mobali, mbongola ya mokomi ya lokota la latin na nkombo Térence, La Fontaine abitmisaki buku ya masolo, matongi mpe malako. Na boyekoli lolenge la kokoma masapo ma bakomi ba kala ya nkota ya gresi mpe latina, mingi mpenza ya mokomi Esope, La Fontaine abimisaki, uta mobu 1668 tii 1694, Masapo montango 243, ibimaki na buku inene isato, yoko yoke na ya yango montango ya masapo. Ezali mosala mwa ye moye moyebani koleka mpe yoko ya nkoma mpe buku ya motuya mpe lokumu ya bakomi buku ba falansé. Akomi masapo ma ye na lolenge kitoko mpe abongisi ’te nyama ibeta masolo mpe izala na bilili mpe tmaloba bo bate. Yango wana azali kobanda to kosukisa masapo ma ye na bopesi malako kitoko. Na 1684, mpo ya mosala mwa ye mwa bokomi buku, bayambaki ye na Ndako mpé lingomba ya lokumu litali mambi ma mayele na makomi ma ekolo Falansia.

Na nsima ya bobeli makasi na mobu 1692, La Fontaine akufaki na engumba Pari na mobu 1695. Liboso ‘te akufa, akomaki ye moko maloba ma botiyi na likolo ya lilita la ye:

« Jean akei na ye be lolenge ayaka 0 moKili moye mwa bato,
Azalaki kolia na motoki mwa movala mwa ye,
Asalaki mpe makambe mingi mazangi na yango litomba.
Kasi na oyo etali lolenge ya bolekisa niango ya ye, ayebaki hosalela yango na matonga:
Na bosali makambo mabale maye ahokaki mpe kolekisa kosala
Ya Kboso ezalaki kolala se mpongi mpe ya mibale kolekisa ntango na besali ata eloko yoko ya ltomba te. »


Tála mpé[kokoma | kobɔngisa mosólo]