Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Ève Bazaiba

Útá Wikipedia.
Ève Bazaiba
moto
Sexe ou genreféminin Bokomi
Pays de nationalitéKongó-Kinsásá Bokomi
PrénomÈve Bokomi
Nom de familleBazaiba Bokomi
Date de naissance12 augústo 1966 Bokomi
Lieu de naissanceKisangáni Bokomi
Langues parlées ou signéesFalansé, Lingála Bokomi
OccupationMoí-politíki Bokomi
Fonctionsénateur congolais, député, ministre de l'Environnement, député, député Bokomi
Scolaritéuniversité Cardinal-Malula Bokomi
Parti politiqueMouvement de libération du Congo Bokomi

Ève Bazaiba Masudi, abotama le 12 août 1965[1] na Kisangani na ex-province Orientale, azali mwasi ya politiki ya Congo-Kinshasa

Député ya etando ya Basoko (ex-Province Orientale). Banda 2012, azali mokambi ya Komisiyo socioculturelle ya lisanga ya mboka Azalaki moko ya Union pour la démocratie et le progrès social (UDPS).[2] Na ba ponami ya 2006, azalaki moko ya ba porte-parole ya Union pour la Nation ya candidat Jean-Pierre Bemba. Na nsima, azalaki mokomi ya munene ya Mouvement de libération ya Congo (MLC) kobanda décembre 2014. Na botelemeli akotaki na boyangeli na 2021, akomaki minisele ya Environnement na rang ya vice-Premier ministre.

Biografi ya bomoi ya bato

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Ève Bazaiba, azali mwana ya soldat mpe mo wuta ya province Orientale, azui diplôme na Latin mpe na philosophie na lycée Bosangani na Kinshasa, azui diplôme na sciences sociales, politiques et administratives na faculté ya Relations internationales na Université Cardinal Malula (UCM) mpe na diplôme ya droit na Faculté ya Droit publique international ya Université protestante du Congo (UPC) .

Mosala politiki

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Na 1988, Ève Bazaiba akomi militante ya L ⁇ UDPS. Akangamaki mbala mingi na boyangeli ya Mobutu Sese Seko, akangamaki mikolo minei na boyangeli ya Laurent-Désiré Kabila, mpe asambamaki na boyangeli ya Joseph Kabila mpo na kofunda ndenge bazalaki kobotola mabanga ya ntalo.

Na 2002, asanganaki na masolo ya Sun City, oyo ebandisaki gouvernement ya transition oyo ememaki na maponami ya 2006 mpe na République ya misato , [1] .

Kobanda 2004 kino 2007, azalaki mokomi ya munene ya Afrika na comité international ya botali mpe bosaleli ya Charte africaine ya makoki ya bomoto mpe ya bato . Moko ya mikano na yango ezali ya kosala ete mobulu ya kosangisa nzoto na basi endimama na ntango ya bitumba ya minduki lokola mbeba ya bomoto.

Na 2007, aponami na Sénat lokola moko ya MLC na Assemblée provinciale ya Kinshasa . Sikawa, aponami député national mpe azali mokambi ya moko ya ba commissiyo ya libela ya institution oyo [2] .

Sima ya mosala na ye, akomi mokonzi ya commissiyo socioculturelle na Assemblée nationale.

Azali mpe mokonzi ya Ligue des femmes congolaises pour les élections (LIFCE). Progressive, azali kosala campagne mpo na kozala ya basi mingi na boyangeli ya Congo, mpe mpo na bokatikati ya mibeko katiya mibali na basi na lisanga ya congo [3] , [4] . Na mars 2014, azwaki mobeko ya yambo oyo ebandaki na député moko ya Congo, mobeko moye mozali na mokano ya kobatela bato oyo bazali na bokono ya nzoto na RDC [5] .

Na 12 avril 2021, Ève Bazaiba Masudi aponamaki Vice-Premier Minisili, Minisili ya Environnement mpe Développement Durable, na esika ya Claude Nyamugabo Bazibuhe . Misala na ye ezali kokende elongo na Mokambi ya Ekolo na COP21 na Glasgow (Écosse), mpo na kozwa misolo mpo na kobatela bazamba ya Congo [6] .

Mobali na ye azali D Masudi, oyo abandaki na ye libota [7] .

Lisolo oyo etali yango

[kokoma | kobɔngisa mosólo]
  • Basi na politique na République Démocratique du Congo

Ba liens ya libanda

[kokoma | kobɔngisa mosólo]