Bokeleli Vitamine B12

Útá Wikipedia.

Bokeleli Vitamin B12, eyebani mpe lisusu bo hypocobalaminemia, elakisaka niveau moke ya vitamine B12 nakati ya makila.[1] Bilembo ndenge na ndenge bikoki komonana ekoki kozala kokita ya makoki ya kokanisa mpe mbongwana nakati na bomoto neti depression, koumela te na kozwa kanda, mpe psychose. Komiyoka bo momesano te, mbongwana ya bokebi, mpe misuni ya nzoto kosala malamu te ekoki kobimela na mpe inflammation ya lolemo, decreased taste, globules rouges moke, motema kosala malembe, mpe kokita ya fertilité.[2] Epayi ya bana mike bilembo bikoki kozala kokola malamu te, kokomela malamu te, mpe nkokoso mpo na koningana.[3] Soki traitement epesami na lombango te mbongwana misusu ekoki kotikala mpo na libela.[4]

Bilembo biye biyebani mingi eza libumu to mitsopo eza koyamba malamu te biloko, kolia to komela moke, mpe nzoto kozala na bosenga ebele. Koyamba biloko moke ekoki kouta na anémie ya makasi, bolongoli biye biza na libumu na nzela ya lipaso, inflammation ya pancréas eye ezongaka mbala na mbala, ba parasites kati na mitsopo, lolenge songolo ya ba nkisi, mpe mua mikakatano kolandana na ba génés. Koyamba biloko moke ekoki kokomela baye balingaka kolia ndunda to baza na bolei mabe. Nzoto kozala na bosenga ebele ekomelaka baye baza na VIH/SIDA na baye globules rouges eza kobeba noki.[2] Mingi mpeza diagnostic esalemaka kolandana na niveaux ya vitamine B12 nakati ya makila, na se ya 120–180 picomol/L (170–250 pg/mL) mpo na batu bakolo. Niveaux ya acide méthylmalonique soki eza ya komata (valeurs >0.4 micromol/L) ekoki mpe kolakisa bokeleli oyo etangemi awa. Lolenge ya globules rouges moke oyo eyebani bo anémie mégaloblastique mingi mingi ezwaka batu kasi ntango inso te.[3]

Ba supplements ezalaka recommandé na baye balingaka kolia ndunda mpe bazali na zemi mpo bamibatela na bokeleli ya vitamine B12.[3] Soki basili kokundola yango traitement nayango ezalaka pètè na ba supplements ya komela to ya tonga.[5] Mindondo eza te soki mutu alekisi vitamine B12 na nzoto mpo na baye baza na nzoto kolongono .[3] Ba cas misusu ekoki kosungama na kotraiter ntina eye ememaki maladi.[6] Bas cas misusu ekoki kosenga kokoba se kokoba na ba supplements soki ntina eye ememaki bokono ekoki kobikisama.[7] Bokeleli vitamine B12 eza likambo ya kokamwisa te.[2] Emonani ete ezwaka pene na 6% ya batu oyo bazali na mibu na se ya 60 mpe 20% ya baye bazali na mibu koleka 60. Taux ekoki kozala likolo kino 80% na biteni misusu ya Afrika na Asia.[2]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).
  2. 2,0 2,1 2,2 et 2,3 Hunt, A; Harrington, D; Robinson, S (4 September 2014). "Vitamin B12 deficiency.". BMJ (Clinical research ed.) 349: g5226. doi:10.1136/bmj.g5226. PMID 25189324. 
  3. 3,0 3,1 3,2 et 3,3 "Vitamin B12 Dietary Supplement Fact Sheet". June 24, 2011. http://ods.od.nih.gov/factsheets/VitaminB12-HealthProfessional/#h5. Retrieved 21 April 2015. 
  4. Lachner, C; Steinle, NI; Regenold, WT (2012). "The neuropsychiatry of vitamin B12 deficiency in elderly patients.". The Journal of neuropsychiatry and clinical neurosciences 24 (1): 5–15. doi:10.1176/appi.neuropsych.11020052. PMID 22450609. 
  5. Vidal-Alaball, J; Butler, CC; Cannings-John, R; Goringe, A; Hood, K; McCaddon, A; McDowell, I; Papaioannou, A (20 July 2005).
  6. Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).
  7. Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).