Bokono ya Ebola

Útá Wikipedia.
Bokono ya Ebola
Bokono ya EbolaBokono ya Ebola
Bokono ya EbolaBokono ya Ebola
Classification mpe ressources ya kowuta libanda
ICD/CIM-10A98.4 A98.4
ICD/CIM-9065.8 065.8
DiseasesDB18043
MedlinePlus001339

Bokono ya Ebola (EVD; eyebani lisusu bo fièvre hemoragique ya Ebola na falansé, to na bokuse EHF na lokótá ya lingɛlɛ́sa), tǒ mpé kaka Ebola, ezalí bongo fɛ́fɛlɛ hémoragique viral óyo ezwaka batu mpé londelenge songolo ya ba makaku kolandana na ba vilúsu ya ebola. Bilembo ya bokono bibandaka komonana míngi míngi káti ya mikolo mibale na poso misato sima ya kozwama na vilúsu mpé fɛ́fɛlɛ, mpasi ya kingo, mpasi ya misunyi ya nzoto, na moto mpasi. Ebongo, kosanza, pulúpulú mpé kobeba loposo míngi míngi elandaka na sima, elongo na bokiti ya misala ya foie mpé ba reins. Na eleko oyo batu misusu babandaka kotangisa makila ezala nakati ya nzoto to libanda ya nzoto.[1] Bokono oyo bozalaka na likámá monene ya komema liwa, ebomaka kati ya 25 na 90 % ya batu óyo bazwami na vilúsu nango, na moyenne ya 50 %.[1] Elandanaka míngi míngi na hypotension artérielle kouta na bobungisi mayi na makila ya nzoto, mpé míngi mpeza elandaka sima ya bilembo komonana kati ya mikolo motoba kino zomi na motoba.[2]

VHF isolation precautions poster
VHF isolation precautions poster

Vilúsu epesamaka na nzela ya kosimba ba mayi na makila ya nzoto, neti makila, ya mutu to ya banyama oyo baza infecté.[1] Yango ekoki mpé kosalema na nzela ya kosimba eloko eye ewuti kozala contaminé na ba mayi to makila ya nzoto.[1] Bopalanganisi bua bokono na mopepe kati na ba primate, bakisa mpé batu, naino esembolami te ezala na ba laboratoire to libanda [3] Makidi to miliki ya libele ya mutu sima na libiki naye na Ebola ekoki kokoba kozala na vilúsu kino mua baposo to ba sanza.[1][4][5] Endimami ete ba ngembo nde baza normal bakumbi na mokili, bakoki kobola vilúsu mpé komona mpasi nayango te. Makono masusu neti malaria, cholera, fɛ́fɛlɛ typhoide, méningite mpe ba fiévre hémoragique viral makoki komonana neti Ebola. Basalaka teste ya ba échantillion ya makila mpo na RNA viral, ba anticorps to mpo na vilúsu yango moko mpo na kosɔsɔlɔ diagnostic.[1]

Mpo na kotála épidemie esengelaka kosangisa makasi ya baye basalaka na ba lopitalo, elongo na komipesa ya bayi mboka. Misala kouta na baye basalaka na lopitalo eza ndenge na ndenge kati nayango eza bokundoli na lobango baye bazwami na bokono, koluka ba contact ya baye bakuatanaki na batu oyo baza infecté, kokende na lobango na ba laboratoire, kopesa ba soins eye esengeli na baye baza infecté, mpé kokunda baye bakufi na bokono ndenge esengeli na nzela ya kotumba nzoto to kokunda na lilita.[1][6] Ba échantillion ya mayi to makila ya nzoto mpé nzoto ya batu oyo bakufi na Ebola esengeli kolengela yango na bokebi nionso. Nzela ya yambo mpo na komibatela eza kosukisa kopalangana ya bokono kowuta na banyama oyo baza infecté ezwa batu. Yango ekoki kosalema na bolengeli nyama ya zamba oyo emonani neti eza infecté kaka ntango bilamba ya komibatela nango bilatemi mpé kolamba musunyi yango na bokebi liboso ya kolia yango. Nzela mosusu mpo na komibatela eza kolata bilamba ya komibatela nago mpé kosokola maboko ntago oza pene to owuti kokutana na mutu oyo oza na bokono.[1] Traitement  oyo esembolami to mangwele mpo na bokono oyo eza te, atako ba recherche eza kosalema mpo na ba nkisi mususu oyo ekoki kobikisa. Lisungi oyo epesamaka, esalisaka mokoni. Kati nayango eza kozongisa mayi na nzela ya serum oral (komela mayi oyo eza na mua sukali na mungwa) to kopesa ba fluide intraveineux mpé kotraiter bokono ntango bilemebo bimanani.[1]

Bokono oyo emonanaki mbala ya yambo na mobu ya 1976 kolandana na épidemie eye esalemaki ngonga moko na bisika mibale, moko na Nzara, mpe mosusu na Yambuku okati ya mboka monene ya ekwater, mboka oyo ezali pene na Mongala. Ebola eye epesi nkombo na bokono.[7] Epidemie ya ebola esalemaka na kobongolaka bisika ezalí kobimela na ba region tropicale ya Afríka ya se ya Sahara.[1] Kati ya mobu ya 1976 na 2013,  Organisation Mondiale ya Santé  elobi ete épedemie esalemaki mbala 24 mpe ezwaki batu 1,716.[1][8] Epidemie ya monene koleka ebandaki na mobu ya 2014 mpe ekobaki na mobu ya 2015 na épidemie Afríka ya Wɛ́sita mpé kotungisa ba mboka ya Liberia, Sierra Leone[9][10] na Gine.[11][12] Na ngonga oyo, ebola ebola eza na mboka nionso te, kasi eza na mua bisika na Liberia.[13] Kotala na mokolo ya 6 sanza ya yambo 2016, épidemie oyo esilaki kozwa batu 28,638 mpe emamaki liwa ya batu 11,315.[14][14]

Tála mpé[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. 1,00 1,01 1,02 1,03 1,04 1,05 1,06 1,07 1,08 1,09 et 1,10 "Ebola virus disease Fact sheet No. 103".
  2. Ruzek, edited by Sunit K. Singh, Daniel (2014).
  3. "2014 Ebola Virus Disease (EVD) outbreak in West Africa".
  4. "Preliminary study finds that Ebola virus fragments can persist in the semen of some survivors for at least nine months".
  5. "Recommendations for Breastfeeding/Infant Feeding in the Context of Ebola". cdc.gov. 19 September 2014.
  6. "Guidance for Safe Handling of Human Remains of Ebola Patients in U. S. Hospitals and Mortuaries".
  7. "Ebola virus disease, Fact sheet N°103, Updated September 2014".
  8. "Ebola Viral Disease Outbreak — West Africa, 2014".
  9. "CDC urges all US residents to avoid nonessential travel to Liberia, Guinea and Sierra Leone because of an unprecedented outbreak of Ebola."
  10. "2014 Ebola Outbreak in West Africa".
  11. "EBOLA SITUATION REPORT 28 OCTOBER 2015" (PDF).
  12. "WHO – Sierra Leone stops transmission of Ebola virus".
  13. "WHO announces Ebola milestone as Guinea outbreak ends (Update)".
  14. "Ebola Situation Report – 9 December 2015".
  15. "Ebola Hemorrhagic Fever Signs and Symptoms". 28 January 2014. Archived from the original on 1 August 2014. https://web.archive.org/web/20140801015854/http://www.cdc.gov/vhf/ebola/symptoms/index.html. Retrieved 2 August 2014. 
  16. Image publiée sur flickr par le NIAID (en) (octobre 2014)
  17. (en) Microscopie électronique en transmission d'un virus Ebola sur le site des Centres pour le contrôle et la prévention des maladies aux États-Unis.