Kauka (Kalamu)
Sité ya Kauka ezalí na kati ya bituka ya komíni ya Kalamu, ezwami na katikati ya komíni ya Kalamu.[1]
Makambo ya kala
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Sité Nicolas-Cito, eyebani lelo na kombo ya sité Kauka, ezali moko ya kalatyé ya komíni ya Kalamu oyo esalemi na Cuvelier, A. Verschuere na De Broyer, architectes ya OTRACO (Bílo ya Transport Colonial) mpo na kofandisa basali ya Leta mpé basali ya Afilíka oyo bazwami na mosala Bilo na nsuka ya bambula ya 1940. Nkombo ya kalatyé ya kála, Nicolas Cito, ezalí nkombo ya machiniste ya liboso na Nzelá-masíni Matadi–Kinsásá.[2]
Mpona kotonga sité, OTRACO batongakí nzelá-masíni ya Ndolo kino na Kauka. Na nsima, engbunduka ezalákí na ntɔ́ngɔ́ mpé na mpókwa. Ezalakí mpo na basáli ya nzelá-masíni mpé ya masúwa ya OTRACO. Nzelá-masíni ekendeki mbangu likolo ya nzelá-mpɛ́pɔ ya Libándá lya mpɛ́pɔ lya Ndolo.[3]
Ndimbola
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Engumba mpo na basali ya Bilo ya transport colonial (OTRACO), oyo esalemi na liyɛmi pentagonal mpé radioconcentrique na services publics na kati (wɛnzɛ, lopitálo, etéyelo, etc.). Sité óyo, ezalí na etando ya 45 ha, ekozala mpe ya liboso oyo ekozala na esika ya kopetola mayi ya bosɔtɔ. Ezali na lisolo mpe mbongwana esalemi banda bambula kala kino lelo. engumba oyo ezali na esika ya lisano ya basketball (esika Dikembe Mutombo mobeti basket monene abandaki koyekola kobeta basketball), centre social na ebótiselo na dísipasɛ́lɛ, atelier ya construction na couture. Sité oyo esika libota ya Lokua Kanza oyo akolaki kuna efandi tii lelo, baboti ya Papá Wemba lokola, mama ya Pascal Tabu Ley afandaki kuna tii na liwa na ye.[4]