Pascal Tabu Ley
Pascal Tabu Ley (Pascal Tabu tee zairianisation, après Tabu Ley) alias Tabu Ley Rochereau tǒ Tabuley Rochereau (abótámí o mokɔlɔ 13 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 1940 na Bandundu, akúfí o mokɔlɔ 30 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2013) azalí moyémbi mpé mokeli wa nzémbo wa Kongó-Kinsásá.
Biografi ya bomoi ya bato
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Abotami le 13 novembre 1940, na Bagata na région ya Bandundu, Pascal Emmanuel Sinamoyi Tabu ayemba na église mpe na ba chorales ya ba écoles atangaki avant akota na système d’Education nationale congolaise na 1959.
Na sima abandi mosala ya mosali ya Leta, yambo lokola secrétaire administratif na Fonds de bien-être autochtone, sima en tant que directeur administratif mpe financier na Athénae Kalina (lelo Institut Gombe).
Abalaki Georgette Mowana (ayebani mpe na kombo ya "Tété"), aboti bana mitano : Blackson Matthieu, Mireille-Esther, Colette, Gisèle, mpe Isabelle.
Azalaki na boyokani ya molayi mpe ya esengo na Miss Zaire 1969, Jeanne Mokomo, oyo abotaki mpe bana motoba mosusu : Carine, Laty, Bob, Abel, Pegguy, mpe Flore.
Na article moko na Le Parisien, rappeur Youssoupha alobi que "star congolais rumba" Tabu Ley Rochereau azali tata na ye mpe azali na bana 68. Youssoupha azui yango na stride: "Ezali eteni ya folklore ya grand star africain oyo azali na bolingo mingi mpe apesaka mingi na yango." Na bongo, tata na mwana babimi elongo na album ya Youssoupha Noir na nzembo "Les Disques de mon père" (Disque ya Papa na ngai). Bayemba duet na mokolo ya 7 Mai 2012, na Olympia. Kasi selon Papy MBoma, Tabu Ley azalaki mpenza na bana nkama moko na ntuku mibale. Azali mpe koko ya rappeur Shay mpe musicien Le Motif.
Tabu Ley Rochereau akufaki na tongo ya samedi le 30 novembre 2013, na lopitalo Saint-Luc na Bruxelles. Azwaki AVC na 2008 mpe abikaki lisusu te.[1]
Bakundaki ye le 9 décembre 2013, na nécropole ya Nsele na Kinshasa.
Ebandeli
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Abandaki ko composer na ba années 1950. Na 1956, a participer na séance ya enregistrement na musicien Grand Kalle (Kabasele). Yango nde ebandaki carrière na ye : Tabu a soumettre ba nzembo na ye na African Jazz, oyo ezuaki ye na mosala. Na sima a adopter kombo na ye ya scène, Rochereau, référence na gouverneur ya Belfort, Pierre Philippe Denfert-Rochereau, surnom oyo baninga na ye ya classe bapesaki ye sima ya question ya histoire oyo soit disant ye kaka ye moko ayebaki eyano.
Ba hits na ye ya liboso, lokola Kelya, Adios Tété, na Bonbon sucré, ememaki ye na attention ya public. Tango azalaki pene ya Mouvement National Congolais ya Patrice Lumumba.
Atiki African Jazz mpe akoti na orchestre ya Jazz Africain na novembre 1960, sima asali groupe African Fiesta Flash na 1965. Entre 1964 na 1968, a composer ba nzembo pene na 200 mpo na bango. Orchestre yango ekendeki na Brazzaville mpe na nsima na Montréal mpo na Foire mondiale ya 1967.
Kolonga Ya mokili mobimba
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Na 1969, Rochereau a recruter ba danseuses mpe groupe ya ba danseuses ya basi oyo babengi « Les Rocherettes », oyo amemaki na Paris na mbula oyo elandaki mpo na ba concerts na ye na Olympia. Tournée yango ekatamaki nsima na bokutani ya scandale financière oyo etie ntembe na bakambi ya groupe eye.
Lokola mentor na ye Kallé liboso na ye, Rochereau, na orchestre na ye African Fiesta National, amemaki ba innovations ebele na rumba congolais, d’abord en adoptant kit ya drum, ndenge moko na oyo ezwamaki na ba groupes pop to rythm and blues.
Ezalaki Seskain Molenga, moko ya ba fondateurs ya orchestre ya Bakuba, nde azalaki drummer ya liboso oyo akotisaki style oyo na groupe ya Rochereau oyo ezalaki kosala na Olympia.
Momeseno wana ememaki na bokeli ya ba orchestres ebele, lokola Bella Bella, oyo ekambamaki na bandeko Soki.
Parmi ba orchestres oyo eyambaki tendance oyo, moko surtout ebangisaki groupe ya Rochereau tango bazalaki kosala tournée na Afrique occidentale : Les Grands Maquisards, oyo ekambamaki na Dalienst (combinaison ya mayele ya ba lettres ya Ntesa Daniel), oyo ba membres na yango esangisi mingi ya ba membres ya groupe ya Rochereau oyo bazalaki to bakozala sima na groupe na ye.
Lokola ayokaki ete azali na likama, Rochereau ayanolaki na lolenge moko ya kokamwa mingi na kofungolaka mabina ya Soum Djoum oyo eyebani mingi uta na Dakar na ba disques misato ya 45 rpm. Ba disques wana ezalaki na ba titres oyo ekokoma ba classiques ya culte, lokola Seli Ja, Silikani, Mundi, na Samba.
Soum Djoum, lokola ba rythmes nionso oyo Rochereau akotisaki, ezalaki instrumental na création ya ba orchestres lokola Continental, oyo na suka eko établir réputation na yango.
Alors que ba contributions ya Kallé na musique congolaise ezalaki fortement influencée na ba rythmes afro-cubains (Jazz afro-cubain mpe sima African Team), Rochereau azalaki profondément inspiré na pop mpe rythm and blues ya ba années 1960 na 1970, tellement que a hésiter te ko performer na scène na pantalon bell-bottom mpe na coiffure afro (tala coiffure ya moko ya ba LP na ye).
Bolingo na ye ya miziki ya pop emonanaki na nzembo "Lal'a bi," oyo ezali ndimbola ya monoko ya Congo ya nzembo ya lokumu ya Beatles "Let It Be."
Tabu Ley Rochereau, malgré que azalaki très talentueux chanteur solo, azuaki mpe ba duets mémorables na ba chanteurs misusu oyo ba accompagner ye. Ndakisa ya ba nzembo na ye ezali « Permission » na « Rendez-vous chez là bas » na Mujos, « Souza et Maguy » na Sam Mangwana, na « Ki makango mpe libala » na « Gipsy » na NDombe Pepe.
Na mosala na ye ya mbula 46, Tabu Ley asalaki banzembo koleka 3 000 mpe atɛkaki bankóto mingi ya badiskɛ.