Komelisa mwana libele

Útá Wikipedia.
Mwana akomela libele ya mama

Komelisa mwana libele ezali kopesa ba bébé na bana mike miliki kowuta na libele ya mwasi.[1] Ezalaka recommandé kobanda komelisa libele na ngonga ya yambo ya bomoyi ya mwana mpe na sima nayango kopesa mwana libele tango inso asengeli nayango.[2][3] Nakati ya mua baposo ya ebandeli ya bomoyi, ba bébé bakoki komela mbala mwambe kino zomi na mibale na mokolo (sima na ngonga mibale to ngonga misato nionso). Molayi ya ngonga ya komelisa libele mingi mingi ezalaka minuti zomi kino zomi na mitano mpo na libele moko.[4] Bileko ya bomelisi libele ekitaka kolandana na ndenge mwana akokola.[5] Ba mama mosusu batiyaka miliki ya mabele nabango na biberon mpo ete basalela yango sima tango batikeli batu mususu bakengela bana nabango.[1] Komelisa mwana libele ezalaka na litomba mpo na mama mpe mpo na mwana.[3][6] Bilei biye bilengelami mpo na ba bébé bisalisaka mingi te neti libele ya mama.[3]

Emonani ete ebele ya ba bébé koleka million bakoki kobikisama mibu nionso mokili mobimba na nzela ya komela mingi libele ya mama. Komelisa mwana libele ekitisaka likama ya infection ya ba voies respiratoires na pulupulu oyo ekoki kozwa mwana.[3] Oyo eza bosolo ezala mpo na ba pays en voie de développement to mpe ba pays développés.[2] Litomba mosusu ya komelisa mwana libele eza risque moke ya mwana kozua asthme, ba allergies kouta na bilei, bokono na coeliaque, diabete ya type 1, na leucémie.[3] Komelisa mwana libele ekoki mpe kobakisa bokoli ya mayele ya mwana mpe kokitisa risque ya mwana kozwa obesité na kibokolo.[2] Ba mama mosusu bakoki komona neti mua mindondo komelisa mwana libele, kasi esengeli mpe koyeba ete bana oyo bamelisi bango te libele ya mama bakolaka nabango mpe ndenge elongobanii – mikakatano ya makasi ekomelaka bango te na nzoto to bonkolongono nabango.[7]

Litomba oyo mama azwaka na komelisa mwana libele eza na eleko ya kobota makila oyo akobungisa ekozala moke, utérus ekokonda malamu, kilo ya nzoto ekokita, mpe dépression post-partum ekozala moke. Ebakisa molayi eleko ya liboso ya menstruation mpe fertilité, eye eyebani bo lactation ya aménorrhée. Litomba ya eleko molayi ekoki kozala risque moke ya kozwa cancer ya libele, maladi ya motema, mpe polyarthrite chronique.[3] Libota esalelaka misolo ebele te mpo na komelisa mwana libele nzoka nde bilei biye bilengelami mpo na bana bilekaka talo.[8][9]

Mangomba ya santé, neti Organisation Mondiale ya Santé (OMS), esengaka ete sanza motoba mwana amelisama bobele libele ya mama.[2][10] Yango elingi koloba ete bilei mosusu esengele te bapesa yango na mwana soki kaka te vitamine D.[11] Ezalaka recommandé kokoba komelisa mwana libele mbala moko moko kino na eleko akokokisa mobu moko.[3] Na mokili mobimba pene na 38% ya bana nde bamelaka libele ya mama na sanza motoba oyo elandi mbotama nabango.[2] Na Etats Unis, pene na 75% ya ba mama esi babandi komelesa bana libele mpe pene na 13% nde bamelisa bana libele kino sanza motoba.[3] Ba etat ya santé oyo epekisaka komelisa mwana libele eza mingi te.[3] Na eleko ya komelisa mwana libele, drogues ya komisepelisa mpe ba nkisi mosusu ezalaka recommandé te.[12]

See also[kokoma | kobɔngisa mosólo]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. 1,0 et 1,1 "Breastfeeding and Breast Milk: Condition Information". 2013-12-19. https://www.nichd.nih.gov/health/topics/breastfeeding/conditioninfo/Pages/default.aspx. Retrieved 27 July 2015. 
  2. 2,0 2,1 2,2 2,3 et 2,4 "Infant and young child feeding Fact sheet N°342". WHO. February 2014. http://www.who.int/mediacentre/factsheets/fs342/en/. Retrieved February 8, 2015. 
  3. 3,0 3,1 3,2 3,3 3,4 3,5 3,6 3,7 et 3,8 American Academy of Pediatrics Section on Breastfeeding. (March 2012). "Breastfeeding and the use of human milk". Pediatrics 129 (3): 827–841. doi:10.1542/peds.2011-3552. PMID 22371471. http://pediatrics.aappublications.org/content/129/3/e827.long. 
  4. "How do I breastfeed? Skip sharing on social media links". 2014-04-14. https://www.nichd.nih.gov/health/topics/breastfeeding/conditioninfo/Pages/how-is-it-done.aspx. Retrieved 27 July 2015. 
  5. "What is weaning and how do I do it?". 2013-12-19. https://www.nichd.nih.gov/health/topics/breastfeeding/conditioninfo/Pages/weaning.aspx. Retrieved 27 July 2015. 
  6. Ip, S; Chung, M; Raman, G; Trikalinos, TA; Lau, J (October 2009). "A summary of the Agency for Healthcare Research and Quality's evidence report on breastfeeding in developed countries.". Breastfeeding medicine : the official journal of the Academy of Breastfeeding Medicine 4 Suppl 1: S17-30. doi:10.1089/bfm.2009.0050. PMID 19827919. 
  7. Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).
  8. "Breastfeeding and the use of human milk. American Academy of Pediatrics. Work Group on Breastfeeding.". Pediatrics 100 (6): 1035–9. Dec 1997. doi:10.1542/peds.100.6.1035. PMID 9411381. http://pediatrics.aappublications.org/content/100/6/1035.full.pdf+html. 
  9. "What are the benefits of breastfeeding?". 2014-04-14. https://www.nichd.nih.gov/health/topics/breastfeeding/conditioninfo/Pages/benefits.aspx. Retrieved 27 July 2015. 
  10. Kramer, MS; Kakuma, R (15 August 2012). "Optimal duration of exclusive breastfeeding.". The Cochrane database of systematic reviews 8: CD003517. doi:10.1002/14651858.CD003517.pub2. PMID 22895934. 
  11. "What are the recommendations for breastfeeding?". 2014-04-14. https://www.nichd.nih.gov/health/topics/breastfeeding/conditioninfo/Pages/recommendations.aspx. Retrieved 27 July 2015. 
  12. "Are there any special conditions or situations in which I should not breastfeed?". 2013-12-19. https://www.nichd.nih.gov/health/topics/breastfeeding/conditioninfo/Pages/when-not-breastfeed.aspx. Retrieved 27 July 2015.