Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Paracétamol

Útá Wikipedia.

Paracétamol, eyebani lisusus bo acétaminophène to APAP, ezali nkisi basalelaka mpo na kosilisa mpasi mpe fièvre.[1] Mingi mpeza basalelaka yango mutu azali koyoka mua mpasi to mpasi mingi te.[1] Preuve ya litomba ya nkisi oyo mpo na bana eza moke mpeza.[2] Mingi mingi batekaka yango elongo na ba nkisi mosusu neti nkisi mpo na miyoyo.[1] Ntango basangisi yango na nkisi mpo na mpasi kouta na opioïde, basalelaka paracétamol mpo na mutu oyo azoyoka mpasi makasi neti mpasi ya cancer na mpe sima na lipaso.[3] Mingi mpeza bamelaka yango na monoko to kobaka yango, ya kotuba tonga na mizisa mpe ezalaka.[1][4] Ba effet nayango ewumelaka kati na ngonga mibale na minei.[4]

Paracétamol ezalaka na mindondo mpeza te soki baseleli yango kolandana na dose oyo esengeli.[5] Mokosa makasi loposo esalemaka mpeza mingi te.[1] Dose ya koleka mpeza ekoki komema liver failure.[1] Emonani neti eza mindondo te na eleko ya zemi mpe ntango ya komelisa mwana libele.[1] Mpon na baye bazali na maladi ya foie, bakoki kokoba kosalela yango kasi ekosengela basalela dose ya moke.[6] Paracétamol etiyami nakati ya ba nkisi eye eyebani bo analgésique, ba nkisi oyo esilisaka to ekitisaka ba mpasi.[4] Nkisi oyo eza na misala minene te ya anti-inflammatoire eye esalaka mpe lolenge nkisi oyo esalaka eyebani mpeza malamu te.[7]

Bakundolaki paracétamol na mobu ya 1877.[8] Yango ezali nkisi oyo batu mingi basalelaka mpo na kosilisa ba mpasi na fièvre ezala na Etats Unis to Eropa.[9] Nkisi oyo ezali na Liste ya ba Nkisi ya Ntina ya OMS, nkisa ya ntina mpeza oyo esengeli kozanga te na ba lopitalo.[10] Paracétamol ezali kozwama bo générique mpe nkombo misisu eye bakosalela mpo nayango na mombongo eza Tylenol and Panadol.[11] Talo mpo na kosomba na mipiko-mipiko eza na se ya 0.01 USD na dose moko.[12] Na Etats Unis talo nayango eza 0.05 USD na dose moko.[1]

  1. 1 2 3 4 5 6 7 8 "Acetaminophen". The American Society of Health-System Pharmacists. http://www.drugs.com/monograph/acetaminophen.html. Retrieved Jan 2016.
  2. Meremikwu, M; Oyo-Ita, A (2002). "Paracetamol for treating fever in children.". The Cochrane database of systematic reviews (2): CD003676. PMID 12076499.
  3. (en) Scottish Intercollegiate Guidelines Network (SIGN), Guideline 106: Control of pain in adults with cancer, Scotland, National Health Service (NHS), (ISBN 9781905813384, lire en ligne), « 6.1 and 7.1.1 »
  4. 1 2 3 (en) Daniel Hochhauser, Cancer and its Management, John Wiley & Sons, 2014 (ISBN 9781118468715, lire en ligne), p. 119
  5. Russell, FM; Shann, F; Curtis, N; Mulholland, K (2003). "Evidence on the use of paracetamol in febrile children.". Bulletin of the World Health Organization 81 (5): 367–72. PMID 12856055.
  6. Lewis, JH; Stine, JG (June 2013). "Review article: prescribing medications in patients with cirrhosis - a practical guide.". Alimentary pharmacology & therapeutics 37 (12): 1132–56. PMID 23638982.
  7. (en) Gerard A. McKaympé Matthew R. Walters, Lecture Notes Clinical Pharmacology and Therapeutics., Hoboken, 9th, 2013 (ISBN 9781118344897, lire en ligne), « Non-Opioid Analgesics »
  8. (en) Brent C. Mangus, Michael G. Miller ; with consultant, Kimberly A. Melgarejo, Pharmacology application in athletic training, Philadelphia, PA, F.A. Davis, 2005 (ISBN 9780803620278, lire en ligne), p. 39
  9. (en) Richard V. Aghababian, Essentials of Emergency Medicine, Jones & Bartlett Publishers, (ISBN 978-1-4496-1846-9, lire en ligne), p. 814
  10. "WHO Model List of Essential Medicines" (PDF). World Health Organization. October 2013. http://apps.who.int/iris/bitstream/10665/93142/1/EML_18_eng.pdf?ua=1. Retrieved 22 April 2014.
  11. (en) Richard J. Hamilton, Tarascon pocket pharmacopoeia : 2013 classic shirt-pocket edition, Burlington, Ma., 27th, 2013 (ISBN 9781449665869, lire en ligne), p. 12
  12. "Paracetamol". http://erc.msh.org/dmpguide/resultsdetail.cfm?language=english&code=PAR500T&s_year=2014&year=2014&str=500%20mg&desc=Paracetamol&pack=new&frm=TAB-CAP&rte=PO&class_code2=07%2E1%2E&supplement=&class_name=%2802%2E1%2E%29Non-opioids%20and%20non-steroidal%20anti-inflammatory%20medicines%20%28NSAIMs%29%3Cbr%3E%2807%2E1%2E%29For%20treatment%20of%20acute%20migraine%20attack%3Cbr%3E. Retrieved 11 January 2016.