Politíki

Útá Wikipedia.

Politíkilotómo la boyángeli, ezalí bwányá ya koyángela makambo ma ekólo lokóla mibéko mizalí kotínda ; ya kobɔngisa bomɔi bwa bato, bizalela bya bangó ; ya kotámbwisa misála mya ekólo, mpé ya koyókana na bikólo bisúsu ; ezalí sɔ̂lɔ́ ndimbola ya politíki.

Mwâ likébisi litálí liloba politíki. Sɔ́kí toyókí liloba «politíki» tǒ «kosála politiki», tokanisaka níni ? Tokanisaka : koyíba, kokósa, kosála mabé, kosála mayele... Kasi politíki ya sɔ̂lɔ́ ezalí bôngó tɛ́. Liloba politíki eútí na ligresi (lokótá la Gresi): polis elingí koloba mbóka, engumba, ekólo, esé. Politíki ezalí mosála tǒ ntɔ́ki ya boyángeli mbóka tǒ ekólo. Ezalí bwányá tǒ mayele ma koyéba bóníbóní bayángela mokili mwa bato, bóníbóní bakamba bato ba ekólo na ndéngé elingí kosepelisa bato bánsɔ.

Yangó wâná, na mosála mwa politíki, moto akoluka malámu mpɔ̂ ya yê mɔ̌kɔ́ mpenzá tɛ́, mpɔ̂ ya libóta lya yě tɛ́, akoluka sé bolámu bwa batu bánsɔ ba lisangá.

Mpɔ̂ ya bakonzi ba letá, kosɛ́nga bato bazala na *non-viola, elingí koloba mbala mingi kosɛnga bangó basála elɔ́kɔ mɔ̌kɔ́ tɛ́, âtá bazalí komɔ́na mpási ndéngé na ndéngé..., batála sé na mǐso âtá babɛ́tí tǒ babomí bangó.<br\> Mpɔ̂ na lingómbá lya politíki liye libóyí bisálela bya letá, míngi mazalí komíbênga babóya-matatá tô ba non-viola bobɛ́lɛ́ mpɔ̂ bazángí mandókibibuneli mpɔ̂ na kozóngisela bakonzi ba letá *violans iye bazalí kosála bangó. Mpɔ̂ na bikelézia, sɔ́kí bizalí na ngámbo ya bakonzi ba letá, bakotéya *non-violans eye elingí koloba komítíka na mpási.


Ezalí na mitíndo mingi ya politíki, mpé politíki ekabwání nzéla mísató :

Kapitalismɛ[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Nzéla ya libosó, politíki ya kapitalismɛ elingí koloba politíki wápi bokúlaka mpé matómba ya mosála mazalí mpɔ̂ na basáli tɛ́ kasi mazalí mpɔ̂ na bomongo ya bokulaka babéngaka bangó bakapitalistɛ elingí koloba bakóló-bokulaka mosɔlɔ.

Sosialisimɛ[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Nzéla ya míbalé, sosialisimɛ ezalí politíki ékopɛ́sa matómba ma mosála na mabɔkɔ ma basáli bangó mɔ̌kɔ́ mpé ekopekisa bokulaka ezala ya mwâ libóké lya bato.

Komynisimɛ[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Nzéla ya misátó, kominisimɛ ezalí politíki ekosɛnga bokulaka mpé matómba ya mosála mazala mpɔ̂ na bolámu bwa lingómba, kasi ekopekisa bokulaka ya moto mɔ̌kɔ́.

Mokango[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Botángi[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  • Bapu, M. et alii, Le Zaïre que nous voulons. Un projet de société. Kinshasa: Cepas, 1993.
  • Braeckman, C., Le dinosaure. Le Zaïre de Mobutu. Paris: Fayard, 1992. 383 p.
  • Dungia, E., Mobutu et l'argent du Zaïre. Révélations d'un diplomate, ex-agent secret. Paris: L'Harmattan, 1992. 215 p.
  • Esoavelomandroso, M. et Feltz, G., Démocratie et développement. Mirage ou espoir raisonnable?. Paris, Karthala, 1995.
  • Kadima Tshimanga, B. et alii, De la démocratie au Zaïre: consensus lexicaux d'un peuple en délire. A. M. d'Ans, 1995.
  • Mpundu, J., Kobongisa mboka na boboto. Kinshasa: Éditions d'Esperance.


Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ.