Tibélekilosi

Útá Wikipedia.
Kokɛndɛ na: bolúki, boluki

Tibélekilosi (TB) ezalí bokɔnɔ buye bubébisaka esíká ya kopéma eye babengi mampúlúlú maye mazalaka o káti ya ntólo, kasi ekokí mpé kobébisa bisíka bisúsu bya nzóto. Mbúla (Mvúla) 150 iye iúti koleka na Ingɛlɛ́tɛlɛ, moto mɔ̌kɔ́ na kati ya bato 8 baye basiláká kowâ, bakufáká na bokɔnɔ bwa tibélekilosi. Kasi kobandá mibú 1980, bokɔnɔ bûná bumɔ́nɔnɔkɔ mingi lisusu tɛ́, mpó éte bato bakokóma na ndáko ya malamu, koliya malamu mpé mínganga bazali mpenzá komɔ́nɔ o lombangú mpé kotiya mpɛmbɛ́ni baye bazalí kobɛlɛ mpó bazua lobiko noki. Kasi TB esili naíno libela tɛ́. Ya sɔ̂lɔ́, TB ezalí bokɔnɔ bunyɔ́kɔlɔkɔ mokili mobimba mingi mikolo miye. Mbúla (Mvúla) eye eleki bato mingi bakufáki na TB-8,000 na mokɔlɔ mɔ̌kɔ́ - koleka Mbúla (Mvúla) inso iye isíla koleka. Na Mbúla (Mvúla) 20 iye ileki, TB ebandi komata malɛ́mbɛmalɛ́mbɛ na Ingɛlɛ́tɛlɛ. Sikáwa bato 7,000 bazalí kozwa yangó o mobú mɔ̌kɔ́ – wana elíngi koloba moto mɔ̌kɔ́ na kati ya bato 10,000 na molɔ́ngɔ́ mobimba.

Lokásá luye luzalí koyebisa (koloba?) likóló lya bokɔnɔ bûná, ndénge ya koyéba bwangó, lobíko la bwangó, mpé ekolakisaka ndénge esili kopanzana na mbóka na (biso?) mpé kokokisa yangó na loléngé lusili kopanzana na molɔ́ngɔ́ mobimba. Lokásá luye lupɛsi mpé tolí ya sika mpó na mángwɛlɛ́ ma BCG na UK, mpé lulakisi buku isusu iye izali na nsango iye inso ikosalisa koyéba makambo ma bokɔnɔ bûná na website.

Tibélekilosi ezalí nini?[kokoma]

Tibélekilosi (TB) ezalí bokɔnɔ bwa mabé buye bukoki kovimbisa kati (ya moto ya mwana?), na lokóta la Kingɛlɛ́sa babobengi TB meningitis. Mpó na bakóló, mbala mingi ebebisaka esíká ya kopéma eye babengi mampúlúlú, kasi ekoki kobebisa mpé mikúwa , kati ya moto tǒ bisika bisúsu. Awa na mbóka na biso, bato mingi baye bazuaka bokɔnɔ bwa TB babikaka, kasi basengeli komɛlɛ nkísi sánzá motóba mpó na kobika.

TB ezalí bokɔnɔ bwa makási, kasi ebikisamaka, ewutaka na mikɔlɔ́bɔ mya ('Mycobacterium Tuberculosis'), Tibélekilosi tǒ M. Tb na bokúsé. Mbala mingi ekotaka na ntólo esíká ya kopéma mpé ebɛngɛmi na Kingɛlɛ́sa ('pulmonary TB') kasi ekoki mpé kokota bisíká bisúsu o nzóto lokóla na kati ya nkíngó, mikúwabiténi bya kati ya libumu. Ekoki mpé kopɛsɛ menenziti. M. bovis ezalí bokɔnɔ bosúsu buye bukokani na TB kasi bwangó buzuaka káka nyama, mingi mpenzá ngɔ́mbɛ́ ('bovine TB'). M. bovis mpé ekoki kozua moto lokóla na eleko ya kala, ntángo bato bayebaki naíno tɛ́ ndénge níni bakokí kobátela mabɛ́lɛ <pasteurisation> tǒ koluka TB na Ngɔ́mbɛ́.

Moto azuaka Tibélekilosi ndéngé nini ?[kokoma]

Nzelá enɛnɛ ya kozua TB ndé ewutaka na moto oyo azali na yangó na nzóto ya ye,oyo azali kokósola. Soki akósola, abimisi bokɔnɔ na kati ya nsɔ́í. Sɔ́kí moto ozui nsɔ́í yangó na ntángo ya kopéma, wana okoki kozua TB. Mikɔlɔ́bɛ miye miúti na nsɔ́í ekoki kotelengana na mopɛpɛ ntángo molayi kasi mbala mingi epɛ́sɛkɛ bokɔnɔ tɛ́. Nzela enɛnɛ ezali káka sɔ́kí ozalaka mpó na ntángo molayi pɛnɛ na moto oyo azalí na TB.

Tibélekilosi ezalaka bisíká míngi?[kokoma]

Nakati ya Ingɛlɛ́tɛlɛ na mibú mya 1950, batu koleka 50,000 bazaláká kozua TB na mbúla (mvúla) mɔ̌kɔ́. Mikolo miye ezongi tíí batu 7,000 baye bazuaka na mbúla mɔ̌kɔ́ , kasi sɔ́kí okokisi yangó na mibú mya 1990, ntángo wana ezalaki bato 5,500. Yango ekomɔ́nɔ éte ezalí komata lisúsu. Wana omɔnɔní éte kozua TB ezalí noki tɛ́, kasi esengeli ozala na ekenge na ndénge ya koyeba yangó mpó, na mokili mobimba TB ezali bisíká mingi. Lokóla batu batambolaka mingi na mokili, bangó bakoki kozua yangó mpé bakoki kokotisa yango na mbóka ya yɔ̂.

Tibélekilosi emɔ́nɔnɔkɔ ndénge níni?[kokoma]

Tibélekilosi ekoki kobebisa biténi mingi bya nzóto. Ndénge yangó ekomɔ́nɔnɔ na mwǎna ekɛsɛni na loléngé ekomɔ́nɔnɔ na mokóló. Lokóla Tibélekilosi ewutaka na bato, ekozala malámu éte oyébá sɔ́kɔ moto azalí na yangó mpó omibátela. Malámu omɔ́nɔ mónganga tǒ dókótóló sɔ́kí mwǎna tǒ ndeko wa yɔ̌ alakisaka bilembo biye bikomami o nsé:

Mpó na níni bapesa mwǎna wa ngai Mángwɛlɛ́ ma Bacillus Calmette-Guérin?[kokoma]

Na Ingɛlɛ́tɛlɛ, lokóla na mbóka isúsu, Mángwɛlɛ́ ma Bacillus Calmette-Guérin epɛsɛmɛkɛ bǎna baye bazali pɛnɛ na bato baye bakoki kozala na TB. Wana ezalí mpó bǎna bâná bavándaka bisíká mɔ̌kɔ́ na bato ba TB, ekoki kozala baboti tó bankoko baúti bisíká bato mingi babɛ́lɛkɛ TB. Na bokuse mbala mingi bǎna baye bavándaka na engúmba ya masikini. Mobateli (mángwɛlɛ́ ) mwangó bapesɛkɛ na ntángo mwǎna abótami kasi bakopɛ́sɛkɛ mpé ntángo inso iye isengeli.

Mbóka iye izalaka na babeli mingi ba Tibélekilosi[kokoma]

Fichier:Flu Vaccine.jpg
Mbala mingi mwana nayo bakobɛtɛ yě ntonga ya BCG na lobɔ́kɔ la mwasi pɛnɛpɛnɛ na lipɛkɛ .

Mbóka iye ikomami o nsé izalaka na bato mingi baye bazali kobɛlɛ TB. Sɔ́kí eyano ya yɔ̂ na mitúna na biso ezali 'oui' 'íyo', sala nɔkí opɛsɛ mwǎna wa yô mángwɛlɛ́ ma BCG sɔ́kí amozui naíno tɛ́.

  • Yɔ̌, bandeko ba yô tǒ tatá wa mwána wa yô awuti na mbóka yɔ̌kɔ́ na kati ya iye itángami o nsé?
  • Yô na mwǎna wa yo bokokɛndɛ́kɛ́ kovánda koleka sánzá mobimba tǒ bokotambola mingi na kati ya mbóka iye itángami o nsé?
  • Na káti ya ndáko ya yô, tǒ pɛnɛpɛnɛ na yɔ̂, ezali na moto oyo akokáki kozala pɛnɛ wa mwǎna wa yɔ̂ na ntángo mingi, oyo azali na TB tǒ azaláká na yangó kala, tɔ̌ awuti na mbɔ́ka yɔ̌kɔ́ na kati ya iye itángami?

Ndénge níni koyeba éte moto azalí na Tibélekilosi?[kokoma]

Lokóla TB ekotaka bisíká míngi na nzóto, nzelá ya komɔnɔ yangó mpé ezalí ndéngé na ndéngé. TB eye eyebani míngi ndé ya kokosola eye babengi na lingɛlɛsa 'pulmonary TB'. Moto oyo azalí na yangó akolakisa bilembo biye:

  • kozánga mpósá ya koliya na kokɔ́ndɔ
  • kokosola eye emataka makási nsima ya mpɔ́sɔ mínei koleka tɔ̌ sánzá
  • kobimisa nsɔ́í míngi; akoki mpé kokosolo makilá sɔ́kí nzéla ya makilá epasuki
  • komiyoka nzóto kolɛmbɛ ntángo inso
  • kozala na fɛ́fɛlɛ, mbala míngi na butú, eye epesi kotɔkɔ míngi

TB epanzanaka ndénge nini?[kokoma]

Nzela ya kopanza TB yango kaka moko: baye bazali na yango nakati ya tolo to na mongongo. Mayi oyo ebimaka na monoko na kokolola nakati ya mopepe nde ezali na maladie. Kasi oyeba te tango mosusu baoyo bazali na yango bakoki te kopanza yango.

Kozua TB ezalaka noki, to makasi?[kokoma]

Penza, ezalaka makasi moto azua TB, mpe esengi tango molayi to kokutana mbala mingi na moto oyo azali na yango, lokola kovanda na ndako moko. Ata ndenge wana, basusu, ata soki bazui TB, bango bakobelaka te. Bato mingi (toloba 9 na kati ya 10) baye bazali na nzoto kolongono, soki bazui yango bakobela te. Baye 10% batikali bakobela, kasi mbala mingi noki te, kasi na sima ata ya bambula 10 na koleka (Comstock, 1982). Wana esalamaka mpo maladie yango ekoki kovanda na nzoto ya moto lokola elali bambula mpe moto azali kobela te. Maladie ekolamuka na sima ya bambula, mbala mingi soki nzoto ezangi komibatela (immunite), lokola moto mobange, bankisi misusu, kobela lokola Sida to kovanda na mizele.

Mpona 10% baye bakobelaka TB, tango ya mabe ezalaka soki ekomi naino mbula mibale te banda bazui yango.

Kati ya 1 na 5% ya baye bazui TB babelaka noki wuta bazui yango (Styblo et al., 1969; Sutherland et al., 1976; 1982). Wana babengaka yango kobela mbala moko, na Angle 'primary disease', mpe mbala mingi ezalaka na bana. 'Primary TB' mbala mingi ekoleka emonana te, mpe ekobika yango moko ata soki moto ameli nkisi te, kasi ekoki kozonga sima ya bambula. Ekotika elembo moke nakati ya tolo, na ndenge emonanaka na Rayon-X.

Kozua TB na kobɛlɛ TB bikeseni?[kokoma]

Mpó na bato mingi baye bakozua TB, mibateli ya nzóto (immunite) ekobúnda kín'o kosilisa tǒ kokanga yango mpó emata tɛ́. Ndénge wana bokɔnɔ ekotikala ya kolála, kasi ezalí naíno na bomɔi, mpé ekobima lisúsu na nsima, eye ebengami bokɔnɔ na mpóngi tǒ bulála, na lingɛlɛsa babubengi 'latent TB infection'.

Baye bazalí na bokɔnɔ bwa TB na mpóngi balakisaka bilembo biye:

  • emonɔnɔkɔ tɛ́
  • babɛlɛkɛ tɛ́
  • bakoki kopanza na basúsu tɛ́
  • Mbala míngi sɔ́kí bameki lomposo la bangó, ekomɔnɔnɔ tɛ́ éte bazalí na yangó
  • Bakoki kobɛlɛ TB na nsima ya mibú

Baye bazali kobɛlɛ TB (‘active TB’) bakolakisaka bilembo biye bikomami na 'Nzelá níni ya koyeba TB'.

TB mabe na yango penza nini?[kokoma]

Soki babikisi te, TB, ata epayi ya bakolo, emataka malembe kino eyi koboma. Mabe mosusu ekopesa meningite. Nzela mosusu, soki babikisi te, nde kobimisa makila tango ya kokolola. TB ekokoma ndongo soki emeseni nkisi, mpo ndenge ya kobikisa ezalaka makasi. Nakati ya Ingɛlɛ́tɛlɛ, TB, ebomaka bato 350 na mbula moko, mingi nakati ya bango mibange, kasi bana mpe bazalaka. Bisika bato bavandaka na bandako oyo ekoki te, na mokili mobimba, bato mingi bakufaka na TB koleka oyo ya UK.

TB ekoki kokébisama na libateli lya mángwɛlɛ́?[kokoma]

Libateli lizali mángwɛlɛ́ ma BCG. Ntángo esúsu mángwɛlɛ́ ma BCG mabátelaka na bokɔnɔ bwa TB tɛ́, kasi masalisaka bǎna baye bazalí kobɛlɛ bokɔnɔ bwa meningite 'TB meningitis' (Rodrigues et al., 1993).

Ntángo ya kala, na Ingɛlɛ́tɛlɛ, bazalaki kopɛsɛ bǎna banso ba kelási mángwɛlɛ́ ma BCG. Kasi lokóla loléngé la TB lobóngwanaka, Ingɛlɛ́tɛlɛ ekamati nzelá ya kolanda bato bakɛ́ baye bazalí na tibelekilosi. Na Ingɛlɛ́tɛlɛ, mángwɛlɛ́ ma BCG makɛsɛni ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na epái eye yɔ̂ ofandi na UK, mpó TB ekoki kozala na esíká sóngóló kasi na esíká pakala ezali tɛ́. Mángwɛlɛ́ ma BCG mapɛsɛmi na bǎna baye bavándaka bisíká biye bato mingi bazalí na TB koleka bisíká bisúsu, mpó na bôngó, bapɛ́sɛkɛ mángwɛlɛ́ ma BCG na bǎna baye babótami ó mbóka iye bato mingi babɛ́lɛkɛ bokɔnɔ bwa TB. Mángó (Mángwɛlɛ́ ma BCG) mapɛ́sɛmi mpé lokóla na bǎna ba kelási ba mbúla 10 kín'o 14 sɔ́kí bazwaka BCG na bomwǎna tɛ́.

Sɔ́kí olingi kokɛndɛ na mbóka mopaya esengeli ozua mángwɛlɛ́ ya BCG?[kokoma]

Sɔ́kí moto azwá mángwɛlɛ́ ya BCG kala, ekosengela éte azua mángwɛlɛ́ ya BCG sɔ́kí alingi kokɛndɛ o mobémbo, kovánda tǒ kosála mosálá mpó na sánzá mɔ̌kɔ́ tǒ koleka, na mbóka eye ezalaka na bato mingi ya TB (Immunisation against Infectious Disease, 1996).

Mángwɛlɛ́ ya BCG ezali nini?[kokoma]

Mángwɛlɛ́ ya Bacillus Calmette-Guérin (BCG) ezali bokɔnɔ ya TB oyo ezuaka gombe Mycobacterium bovis. Nakati ya BCG maladie ya TB ezalaka, kasi bakangi yango epesa kobela te. Kasi mpona baye bazangi mobateli ya nzoto, lokola bato ya Sida, mpona bango BCG ekoki kopesa maladie tango mosusu.

BCG batiyaka yango na tonga ya moke na lomposo.

Mpona nini, esengeli komeka lomposo la moto, liboso lya kopesa ye Mángwɛlɛ́ ya BCG?[kokoma]

Moto nyonso oyo azali na sanza 12 to koleka wana, bakomekaka loposo naye liboso ya kopesa ye mobateli ya BCG. Wana ezali mpona koyeba soki mobateli ya nzoto (immunite) emeseni na TB. Nzela ya koyeba nde kobeta tonga ya tuberculin – mayi ya proteine basali wuta na 'M. tuberculosis' – na kati ya loposo. Sima ya mikolo 2 - 10, na ndenge ya tonga yango, bakotala esika babeti yango. Soki esika babeti tonga evimbi mpe, ekomi lokola makila, wana elakisi te maladie ezali. Ndenge wana ebongi lisusu te bapesa moto BCG, mpo akozala asiazui TB to maladie mosusu ya ndenge wana. Soki nzoto naye elakisi kozala na maladie ya makasi, wana esengi bameka ye na nzela misusu koyeba soki penza asiazui to abandi kobela TB. Bana oyo bakokisi naino sanza 12 te, bango bazali na posa te ya komeka loposo, liboso ya kozua BCG.

Babikisaka tuberculose ndénge nini?[kokoma]

Mbala mingi TB ekoki kobika, kasi moto ebongi asilisa nkisi ya sanza 6 to koleka. Baye babelaka TB mbala mingi bakotaka na opital te. Ata soki bakoti, wana ekozala mpona koyeba soki penza bazali na maladie yango to mpo babanda kozua nkisi. Ata boye, bato ya TB esengi bazala mpene na efimiele ya tolo, tango nyonso ya kozua nkisi mpo bazua yango na ndenge ekoki, mpe soki likambo ya mabe ezali, basala noki moto atika te kozua nkisi.

Nzela oyo tomeseni, ezali ya kozua nkisi 'antibiotics' misatu to mine mbala moko mpona sanza mibale, nde sima na yango nkisi mibale mpona sanza mine misusu. Nkisi mine minene ya TB ezali isoniazid, rifampicin, pyrazinamide na ethambutol. Eyaka elongo mpona kosalisa soki maladie emeseni nkisi moko, misusu ebunda. Ata boye, maladie ebandi komesana nkisi ya ndenge nyonso. Mbala mingi nkisi esalaka lisusu te mpo moto azalaki kozua yango na ndenge ekoki te, to azuaki yango na ndenge ya mabe to moto asilisaki te kozua nkisi (Conaty et al., 2004). Mikolo oyo batiyaka nkisi mibale to koleka na kati ya na komprime moko. Moto akomela komprime mine to koleka, mokolo moko. Tango mosusu esengi moto azua nkisi mikolo mingi, lokola maladie ya TB meningitis, to soki maladie ebandi komesana na nkisi moko to mibale, wana esengi kobalula nkisi.

Soki moto abandi nkisi mpona poso mibale, wana akoki lisusu kopanza TB te, mpe akobanda komiyoka malamu sima ya poso mine. Kasi esengi sanza motoba ya kozua nkisi mpo moto abika.

Tosala nini soki moto azalaka mpene na moto ya TB?[kokoma]

Tango bakuti moto azali na TB, dokotolo akotala soki baye bavandaka naye bakoki kozua yango. Soki emonani te moto akoki kopanza yango, to mwana azali na yango, kasi eyebani te azui yango wapi, wana baye bazalaka mpene naye bakobenga bango mpo bameka eyebana soki bango mpe bazali na yango. Bato wana bakozala bandeko to baye bavandaka na ndako moko. Tango mosusu baninga, lokola baye basalaka elongo, mpe bakobenga bango, kasi mbala mingi tina ya kosala yango ekozala te. Ezalaka mbala mingi te mwana apanza TB – kasi kobela na bango elakisaka te moto mokolo oyo azali kobela TB, azali mpene na mwana wana.

Komeka mpona bandeko tina yango koyeba baye basi bazui TB to baye basi babandi kobela. Komeka basalaka na loposo to na Rayon-X. Na kati ya UK mbala mingi soki bameki loposo, elakisaka te moto asiazui maladie (loposo kovimbal mpe kozala lokola makila esika babetaki tonga), kasi wana ezali mpo bazuaki mobateli ya BCG. Soki loposo soolo ezali. Soki TB emonani, wana moto bamemi ye na dokotolo mpe bakopesa ye nkisi ya TB.

Na mokili mobimba[kokoma]

TB ebomaki bato 100 million na bambula 100 oyo eleki, yango Organisation Mondial de Sante eti yango lokola maladie oyo ya koboma bato mingi na mokili 'Global Health Emergency' na 1993 (WHO 1). Emonani lokola 33% ya bato nyonso na mokili bazali na yango. Na mbula moko, bato 9 million ya sika bazuaka yango (WHO 2). Tango nyonso moto moko azuaka yango na second moko.

Mpona bato mingi ata soki bazui TB mobateli ya nzoto na bango ekoki kokanga yango babela te. Ata boye, TB ebomaka bato 2 million na mokili na mbula moko, moto moko na second 15 (WHO 3). Kati ya bango, 98% bazali bato ya Tiers Monde, mingi na Asie de Sud na Afríka ya bato mwindo (WHO 4).

TB ezalí ya libosó mpó na koboma basi mpé koleka bokɔnɔ misusu esalaka mwána etíké bazala mingi.

Níni bazali kosala mpó na kopekisa bompanzani bwa TB na mokili mobimba?[kokoma]

Ebongi bato banso o molɔ́ngɔ́ mobimba babundisa bokɔnɔ bwa TB. Kosilisa yangó esíká mɔ̌kɔ́ ekosalisa sɔ́kí basilisi yangó bisíká bisúsu. WHO eyi na nzela oyo babengaka 'Directly Observed Treatment – Shortcourse' (DOTS) (WHO 5): 1. Leta ezala na mposa ya kosalisa 2. nzela ya komeka bato mpo eyabana soki bazali na TB 3. nzela eye ebandimi ya kozua nkisi ya sanza 6 mpona babeli mpe moto ya kotala te bato bazali kozua nkisi na ndenge ebongi 4. Moto akáta komela nkísi tɛ́ kín'o abiki, mpé nkísi ezala eye esengeli. 5. Kokoma na búku loléngé osili kozua nkísi mpó mikɔlɔ mya nsima Mónganga ayeba ndénge níni bapesaki yɔ̂ nkísi

Wiki letter w.svg Óyo ezalí ndámbo. Okokaka kosálisa mpé kobalusa.