Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Kinsásá

Útá Wikipedia.
(Eyendísí útá Kinshasa)
Engumba / Etúká ya Kinsásá
EséKongó-Kinsásá Kongó-Kinsásá
Engumba MokonziLa Gombe
MoyángeliM. Baudouin Liwanga
Nkótá ya ekóloLingála
Etando600 km²
Mito estimée 14,970,000 hab.
(2021)
Bato na etando20,000 hab./km²
ISO 3166-2CD-KN
Badepité59
Localisation
Komini mpé Territoires - Bingúmba - Bitúká

Mbóka tǒ engumba Kinsásá —ekokí kotangama KinshásáKisásá— (eye eyébénákí kala o nkómbó Léopoldville) ezalí mbóka-mokonzi ya Kongó-Kinsásá. Ezalí mpé etúká (province) ya ekólo êná. Ezalí engumba monɛ́nɛ, na efúku 8 ya bato (est.). Elɔngɔ́ na nyɔ́nsɔ óyo, Kinsásá ezalí engumba ya míbalé na bingumba nyɔ́nsɔ ya mokili, na elobelí lifalansé, na sima ya engumba Pari (Falansia), mpé ezalí o káti ya bingúmba minɛ́nɛ koleka ya Afríka o nsé ya Sahara.

Mambí ma mabelé

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Ekútání na mabelé o loboko-ya-mwǎsí ya Ebale ya Kongó. Na yangó etálání pɛnɛ-pɛnɛ mpénza na Brazzaville, mbóka-mokonzi ya Kongó-Brazzaville. Kinsásá ekútání na 4°16' Sud, 15°17' Ɛ́sita (-4.2667, 15.28333).

Bisíká minɛ́nɛ ya engumba êná :

Engumba óyo ezalí na mǎto ya ebale tǒ mpé baferry na esɛ́mɛlɔ ya Beach Ngobila mpɔ̂ na kokɛndɛ Brazzaville na Bangi, na nzelá-masíni ’te na Matadi, elongo na Libándá lya mpɛ́pɔ lya Ndjili.

Bilóko minɛ́nɛ óyo emɔ́nɔnɔkɔ míngi ezalí Buludingi ya SOZACOM, Hotel Inter-Continental na Hotel Memling, Zándo monɛ́nɛ ya Kinsásá, Mizé ya Kinsásá na Académie des Beaux-Arts. Bulevale ya 30 Juin ndé ekangasí biténi nyɔ́nsɔ ya engumba êná.

Bato ba Kinsásá
Mobú Bato
19201 600
193640 300
193835 900
193942 000
1947126 100
1957299 800
1959402 500
19681 052 500
Mobú Bato
19701 323 000
19741 990 700
19762 443 900
19842 664 309
19913 804 000
19944 655 313
20057 500 000
2015est. 12 000 000
Source: Populstat, World Gazetteer


Lipopo (Léopoldville) na Stanley Pool (Malebo Pool) ya Bonkámá ya 19.


Molungé mpé mbúla

[kokoma | kobɔngisa mosólo]
Moyennes de température et de précipitations
Min.
(°C)
Max.
(°C)
Pluie
(mm)
yanwáli 21 31 135
febwáli 22 31 145
mársi 22 32 196
apríli 22 32 196
máyí 22 31 159
yúni 19 29 8
yúli 18 27 3
augústo 18 29 3
sɛtɛ́mbɛ 20 31 30
ɔkɔtɔ́bɛ 21 31 119
novɛ́mbɛ 22 31 222
dɛsɛ́mbɛ 21 30 142
* Sources : BBC Weather



Nkásá-web o libándá Wikipedia

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Tálá mpé

[kokoma | kobɔngisa mosólo]

wikilien alternatif2

Wikimedia Commons propose des documents multimédia libres sur Kinsásá.


Bɛndɛ́lɛ ya Kinsásá Komíni ya engumbá Kinsásá Bɛndɛ́lɛ ya Kinsásá
Bandalúngwa | Barumbú | Búmbu | Gombe | Kalamu | Kasa-Vúbu | Kimbanséke | Kinsénso | Kinsásá | Kintámbó | Lémba | Limeté | Lingwala | Makála | Maluku | Masína | Matete | Mont Ngafúla | Ndjíli | Ngába | Ngaliéma | Ngiri-Ngíri | Nsɛlɛ | Selembáo



Bɛndɛ́lɛ ya Kongó-Kinsásá Bitúká bya Kongó-Kinsásá Kongó-Kinsásá

Bandundu · Bas-Congo · Ekwatéli · Kasai-Occidental · Kasai-Oriental · Katanga · Kinshasa · Maniema · Nord-Kivu · Etúká ya Monyɛlɛ · Sud-Kivu