Ntángo ya banɔ́kɔ́ (Kongó-Kinsásá)

Útá Wikipedia.
Kokɛndɛ na: bolúki, boluki
Sir Henry Morton Stanley
Fichier:CSKatangaTCongoBel1950a.jpg
Kongó ya Babelgi, 1950
Léopold II.
Mbóka mɔ̌kɔ́ ya Kongó ebóyá mpɔ̌ na linono.

Útá mobú nkóto na nkámá mwambe na ntúkú mwambe na mínei (1884) tíí mobú nkóto na nkámá mwambe na ntúkú mwambe na mítáno (1885), Conférence de Berlin esangísí bǎna ya Erópa, ya America mpé ya Turkia mpɔ̂ na kokamba mibéko mikofungola nzelá ya Afríka. Yangó epɛ́sí mayɛ́lɛ na ntóma Léopold II na koyébisa mokili mobimba ’te ebale ya Kongó-Kinsásá eye ekambámí na moleki-nzelá Henry Morton Stanley, ezalí mabelé ma yě mpé na lisangá lya yě.

Kasi sɔ́kí na búku ekólo ya Afríka eye elekí na mabɔ́kɔ ya mindɛ́lɛ́ elakísí lokóla ekólo ya Mpótó, na mibéko mpé na misálá ya mbulamatári, sɔ̂lɔ́ ezalákí kokambama lokóla elóko ya moto mɔ̌kɔ́.

État Indépendant du Congo (Letá ya nsɔ́mi ya Kongó)[kokoma]

Mapángo ma ekólo Kongó esálámí na bokakoli elɔngɔ́ na mindɛ́lɛ́ miye basílákí kozwa o káti, mabelé manɛ́nɛ. Ya sɔ́ló, likambo lya ndelo ya Kongó esɛngí kotámbola ekólo mobimba mpé kokamba bato na bokási mpé esɛngákí kozwa bandeko ya miyíndo.

Bitumba ekɔ́tákí káti ya batɛ́kisi mǐno ya nzɔku epái moyíndo, epái Alabo na bakonzi ya miyíndo. Bolóngi ya Letá epɛ́sákí na Bɛ́ljika esɛngɔ enɛ́nɛ.

Kasi nsango ya malámu ya «État Indépendant du Congo» (tǒ mpé "Ekólo ya Bonsɔ́mí ya Kongó") ’te na Bɛ́ljika mpé na mbóka mopaya. Nsango ya monyɔ́kɔli etálí mosálá ya ndembó ekómí na Mpótó. Mani Léopold II atíndí bato bya bikólo ndéngé na ndéngé mpɔ̂ na koyéba likambo lîná.

Matɔ́ngi na nzóto ya mopaya ebángísí Bɛ́ljika elingí kosúkisa monyɔ́kɔli. Yangó wâná ekólo Bɛ́ljika, mokɔlɔ ya zómi na mítáno sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ mobú nkóto na nkámá libwá na mwambe, ekamátí bokonzi na etando ya ekólo État Indépendant du Congo. Na bokambami bwa Bɛ́ljika, ekólo État Indépendant du Congo ekómí lokóla mabelé mɔ̌kɔ́ na Bɛ́ljika. Na nsima ya mánsɔ, bato babósání monyɔ́kɔli mpé motungisi na ntángo ya Mani Léopold II. Akómí yě mɔ̌kɔ́ « mokonzi malámu » mpé ekólo Kongó ekómí « ekólo moyíndo ekambí mindɛ́lɛ́ eye ekolakisa nzelá ».

Mpɔ̂ na kokóma « ekólo moyíndo molakisa nzelá »[kokoma]

Ekambí miyíndo na mindɛ́lɛ́ ekopɛ́sa ndakisa, ebɔ́ngí esálá mabé te. Elingákí bokonzi ya botatá esimbí Bruxelles mpɔ̂ na bokambi ya miyíndo ezala malámu, ekólo emíkoka bozwi bwa yě. Kasi etíkí na miyíndo, mánsɔ etálí mbúlamatáli te lokóla botéyi bǎna ba kelási, botóngí ekólo mpé mosálá ya mónganga.

Bokambi yangó ezalákí mpé na makambo ya makási. Atá mibéko mikokúmbisa bikólo ya miyíndo miye ekambí ekólo Kongó ya Bɛ́ljika, mosálá ya bokási ekosíla káka na mobú nkóto na nkámá libwá na ntúkú mísáto. Bakopɛ́sa bonyilɛ na bapanzi makita mpé na bisanga bya bato káka na mobú nkóto na nkámá libwá na ntúkú mítáno na libwá. Na mibú nkóto na nkámá libwá na ntúkú mítáno, mpósá ya kotámbola ekólo ekopɛ́sa makanisi ya ekólo Kongó ndakisa malámu. Na tema ya mabé tɛ́, bisíká bya ekólo Kongó na emɔneli ya mokili mobimba ya mobú nkóto na nkámá libwá na ntúkú mítáno na mwambe, epɛ́sákí maloba ya elíkya enɛ́nɛ.

Bisika bya bato na mbulamatari[kokoma]

Na kati ya ekolo, bisika bya bato na mbulamatari ekambamaki na moyángeli général moye akambi mbulamatari mpe akoyebisa manso epai ya ntoma ya bikolo miyindo na minoko ya bakambi mabele. Bango bakotala misala minso ya léta (bofuti pako, misala ya mabele, misala ya botongi ekolo, bobwaki bosoto, bokati makambo, etc). Misala miina ekambami mpe na bakondzi ya miyindo oyo balatisi palata. Na maloba, mokondzi oyo alati palata aponami mpe akokamba mboka wa ye na ndenge ya bokoko. Kasi solo mpenza, ezalaki kosalama ndenge wana te. Mbulamatari alingaki ekolo ekola ndenge ye alingi, kasi na ndenge ya bokoko te.

Mokondzi moyindo oyo aponami mpe alati palata ya mbulamatari, azalaki elembo ya bakondzi ya kala ya miyindo na kati ya mbulamatari. Kasi bakondzi mingi baponamaki mpona bilanda landa bya bango na mibeko ya mbulamatari.

Basango[kokoma]

Mateya etali yezu, ezalaki mosala ya basango, bakatolike mpe na baprotestants. Mbulamatari ya Kongo ya Belgica epesaki bango misala miye etali bosungi bato, misala mya bikela mpe bosali bokono. Na mobu koto na kama libwa na tuku minei na sambo, banganga nzambe katolike mpe protestant, bazalaki 21% na mindele bakosala ô ekolo Kongo. Lokola ekolo Kongo mibále balekaki basi, banganga nzambe bapesaki misala mingi na basi ya mindele.

Bambulu-mbulu mpe basoda[kokoma]

Basimbi bokondzi bwa mindele, bambulu-mbulu mpe basoda. Na ebandeli, basoda ya mindele baye bawuti belgica, scandinavia na Italia, etc mpe basoda ya miyindo, bana ya africa ya loboko la mwasi, bana ya Zanzibar, bakotika moke-moke esika na basoda ya mboka na bokambami ba Belges.

Minganga[kokoma]

Na sima ya bokono ya mpongi eye ezongaka mbula nyoso, minganga ya mindele bakosilisa liboso makono ya seko. Wuta mobu koto na kama libwa na tuku misato, bakosalisa bato na bisika bazali mpe bakotambola mboka na mboka; ekobakisama mpe ba lopitalo ya mike mpe ya minene na bisika bya banganga nzambe mpe na bisika ya misala minene.

«Mboka ya zomi» mpe dipanda[kokoma]

Posa ya bondeko bonene kati ya bikolo ya Afrika mpe ya Erópa ebandi na mibu koto na kama libwa na tuku mitano. Mokano ya kobongisa mibeko elingi kokotisa ekolo Kongó na kati ya mabele ya Belgica. Bato babengi «mboka ya zomi». Mibu mitano na sima ya mobembo monene ya ntoma Baudouin na ekolo Kongó na mobu koto na kama libwa na tuku mitano na mitano, ekolo Kongó ezwi dipanda.

Tálá mpé[kokoma]


DRC History Logo.png Lisapo lya Kongó-Kinsásá DRC History Logo.png

Ntángo ya banɔ́kɔ́ · Congo précolonial (avant 1867) · Colonisation du Congo (1867-1885) · Letá ya nsɔ́mi ya Kongó (1885-1908) · Kongó ya Bɛ́lɛjika (1908-1960) · 1ère République Indépendance (1960-1965) · 2e République Zaïre (1965-1996) · 3e République (2006-)

Gouvernement de Salut public (1997-2003) · Gouvernement de transition (2003-2006)

*Atrocités ya Kongó (1888–1908) · Crise congolaise (1960-1965) · Etumba ya Katanga mpé Kasai (1960–1961) · Etumba ya bai mboka mpé *Révolte ya Simba (1961–1964) · Etumba ya Shaba (1977–1978) · Etumba ya Kongó ya libosó (1996-1998) · Etumba ya Kongó ya míbalé (1998-2003) · Etumba ya Kívu (2003- )