Kopumbwa na makambo oyo ezali na kati

Patrick Muyaya Katembwe

Útá Wikipedia.
Patrick Muyaya Katembwe

Patrick Muyaya abotami mobu ya 10 sanza ya sambo 1982 na e ngomba Kinshasa (Republique Démocratique du Congo to RDC). Alekisi bomwana na ye pe akolali na commune ya Bandalungwa, district ya Funa na Kinshasa.

A yekoli na kelasi ya Faculté ya Sciences d’information et de communication ( IFASIC ) na Kinshasa, azali na diplôme na journalisme, classe ya 2009 [1] .

Azali bongo na mokanda ya kelasi monene ya gestion démocratique na ba états fragiles na nzela ya programme “ . Minzoto oyo ezali komata » uta na Institut républicain international (IRI) na 2014.

Patrick Muyaya aza mobali ya libala mpe tata ya bana misato [2] .

Patrick Muyaya abandi mosala na ye lokola mopanzi sango o etando CEBS TV, moko ya ba etando oyo ezali ko panza ba sango ya mboka na e ngumba Kinshasa, esika wapi sima mikolo akomi mokonzi ya conseil d’administration [3] .

Patrick Muyaya abandi bongo politique na mobu ya 2005 tango akoti na lingomba ya Pius Isoyongo Lofete, oyo azalaki moto ya mibale na bayi ba kabami o ndako ya Assemblée nationale transitoire mpe akomi conseiller politique na ye. Azui ebonga oyo tee na mobu 2006 kino mobu ya 2007, pe lisusu azali conseiller ya communication na bureau ya Premier ministre Antoine Gizenga .

Mbula moko sima, akomi conseiller supérieur en charge ya communication mpe presse na Bureau ya Premier ministre ya République démocratique du Congo sous mandat ya Premier ministre Adolphe Muzito, poste oyo azuaki tee na 2011 [4] .

Na suka ya ba élections législatives ya 2011 na mboka Républika démocratike ya Congo, akomi, na âge ya 29 ans, député national élu na district ya Kinshasa 2 Funa na liste ya Parti Lumumbiste unifié (PALU) [5] .

  1. Site web|url=http://apf.francophonie.org/IMG/pdf/c.v_patrick_muyayadocx.pdf%7Cdate=%7Ctitle=Kopi ya archive|access-date=2025-02-16|archivedate=2017-09-14|archiveurl=https://web.archive.org/web/20170914172351/http://apf.francophonie.org/IMG/pdf/c.v_patrick_muyayadocx.pdf
  2. Site web|url=https://web.archive.org/web/20240418152407/https://patrickmuyaya.cd/qui-suis-je/
  3. Site journal|date=2006-11-17
  4. Site journal|date=2010-02-15
  5. Site web|url=http://www.ceni.gouv.cd/deputes/ETAT_Depute2011BParListe.PDF%7Cdate=%7Carchiveurl=https://web.archive.org/web/20131228085228/http://www.ceni.gouv.cd/deputes/ETAT_Depute2011BParListe.PDF%7Carchivedate=28 décembre 2013