Thérèse Kayikwamba Wagner
| Ministre des Affaires étrangères (en) | |
|---|---|
| depuis le |
| Naissance | |
|---|---|
| Nationalité | |
| Formation | |
| Activité |
Thérèse Kayikwamba Wagner azali politicienne ya congo abotami na 1983 na Kinshasa . Azali mokinzi na maye matali mboka ya ba paya o République démocratique du Congo na gouvernement ya Suminwa wuto juin 2024 .
Bo mwana mpe bo yekoli na ye
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Thérèse Kayikwamba Wagner abotami na mobu 1983 na Kinshasa na mama moko ya congolaise mpe na tata ya mopaya allemand. Akoli kati na mboka ya ba payaAllemagne, Ghana mpe Togo [1] . Kuna Ayekoli na Eteyelo ya Harvard Kennedy na États-Unis, epai azwi diplome ya master na makambo ya mboka pe Leta [2] .
Bo tabusama ya mosala
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Thérèse Kayikwamba Wagner abandi mosala na ye na 2009 tango akeyi na Kigali (Rwanda) kuna a koti na Agence allemande ya coopération internationale ya développement (GIZ) [1] .
Kobanda 2011, azwi ekateli pe a mipesi na mosala ya kosalisa bato . Bo ngo sima azongi na mboko wa ye Congo, na engumba Goma, mpo na kosala na mosala ya bosangani Oxfam . Na 2012, tango mboka ekutanaki na crise na yango ya liboso na groupe ya batomboki M23, azuaki ba reins ya programme ya protection ya ba civils na kati ya organisation oyo [1] .
Na nsima akɔtaki na ONU, esika amipesaki na bamisyo ya kobatela kimya, na ndakisa MONUSCO (Congo) pe MINUSCA (République centrafricaine) banda 2014. Na 2019, akendaki na Nairobi (Kenya) mpona kokóma mosungi ya Xia Huang, ntoma monene ya ONU mpona etuka ya Great Lakes. Ezalaki na tango wana nde akutanaki na Félix Tshitshilo, Président Kongo Félix Tshisekedi mpo na mbala ya liboso.[3][4]
Na nsima asalaki na Meta Group kino na 2024, ntango akómaki Mokambi ya programe ya etuka ya Afrika ya sudi ya Sahara, esika oyo "[akambaki] mpasi mpe milende ya komibongisa na maponi"[5][6]
Mosala ya politiki
[kokoma | kobɔngisa mosólo]Na mokolo ya 29 sanza ya mitano 2024, batiaki Thérèse Kayikwamba Wagner ministre ya makambo ya bapaya, ya boyokani ya mikili mingi mpe ya La Francophonie, na etelemelo ya ministre d'Etat, na boyangeli ya Suminwa oyo euti kosalema sika[7] . Bato nyonso bayebaki ye mingi te na ntango wana, koponama na ye ekamwisaki bato ya politiki ya Congo, bamosusu balobaki ete ayebi makambo mingi te. Zulunalo Jeune Afrique ezolandela koponama oyo lokola mposa ya bokatikati mpe kokitisa motema ya diplomatie na ngambo ya president Félix Tshisekedi, nsima ya lolenge ya liboso mpenza ya Christophe Lutundula, oyo azalaki liboso ya ministre ya sika[8] .
Thérèse Kayikwamba Wagner abandi mosala na mokolo ya 13 Yuni[9] . Ekomi na kati ya makambo ya tension, oyo emonisami na kowelana na etuluku ya batomboki M23 oyo eza na lisungi ya Rwanda, mpe kolongola mokemoke basoda ya MONUSCO na mboka wana[10][11] .
Action na ye ya ministre emonanaki na komipesa makasi mpona kobundisa kozala ya basoda ya Rwanda na mabele ya Congo[12] . Na sanza ya zomi na mibale 2024, liboso ya Conseil de sécurité ya ONU, afundaki mpenza Rwanda ete ezali kobuka boyokani ya kokata bitumba kati na mikili wana mibale[13] . Na nsima, na ntango ya likita oyo babongisaki elongo na ba diplomate ya bapaya oyo bandimami na R.D.D.Congo, asengaki mikili ya mokili mobimba ezwa bikateli ya solosolo mpo na kobundisa bitumba ya Rwanda, amonisaki ete "motema mawa kaka moko ekokoka te"[14][15] .
Banda na suka ya 2024, ezopesa maboko na candidacy ya RDC mpona Conseil de sécurité ya ONU mpo mboka ezwa esika ya mosangani oyo eza mosangani ya libela te, kokumisa makambo oyo mboka eza na yango na oyo etali kosilisa matata mpe kotya kimya na MONUSCO[16] .
Etatólí
[kokoma | kobɔngisa mosólo]- 1 2 3 "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". 26 juin 2024. https://www.jeuneafrique.com/1581555/politique/rdc-avec-therese-kayikwamba-a-la-diplomatie-felix-tshisekedi-tente-t-il-denvoyer-un-message/. - ↑ "Error: no
|title=specified when using {{Cite web}}". 29 mai 2024. https://www.radiookapi.net/2024/05/29/actualite/politique/therese-kayikwamba-une-politologue-avec-une-experience-onusienne-la. - ↑ « [archive] », sur radiookapi.net, 29 mai 2024
- ↑ « [archive] », sur radiookapi.net, 29 mai 2024
- ↑ Stanis Bujakera Tshiamala, « [archive] » , sur jeuneafrique.com, 26 juin 2024
- ↑ « [archive] », sur radiookapi.net, 29 mai 2024
- ↑ « [archive] », sur radiookapi.net, 29 mai 2024
- ↑ Stanis Bujakera Tshiamala, « [archive] » , sur jeuneafrique.com, 26 juin 2024
- ↑ « [archive] », sur politicordc.com, 13 juin 2024
- ↑ Stanis Bujakera Tshiamala, « [archive] » , sur jeuneafrique.com, 26 juin 2024
- ↑ « [archive] », sur actualite.cd, 29 mai 2024
- ↑ Merveille Assani & Fréjus Quenum, « [archive] », sur dw.com, 11 décembre 2024
- ↑ « [archive] », sur radiookapi.net, 10 décembre 2024
- ↑ « [archive] », sur radiookapi.net, 18 décembre 2024
- ↑ Clément Muamba, « [archive] », sur actualite.cd, 19 décembre 2024
- ↑ « [archive] », sur lemonde.fr, 19 décembre 2024
- Page utilisant P569
- Page utilisant P19
- Page utilisant P27
- Page utilisant des données de Wikidata à traduire
- Page utilisant P69
- Page utilisant P106
- Page utilisant P39
- Article utilisant l'infobox Biographie2 avec une charte sans catégorie
- Article utilisant l'infobox Biographie2
- Article utilisant une Infobox
- Articles with incorrect citation syntax
- Mbótama na 1983