Vertigo

Útá Wikipedia.

Vertigo eza ntango mutu akoyoka neti aza to biloko biye bizali nzinga nzinga naye biza koningana ntango bizali koningana te.[1] Mingi mingi ezalaka neti kobaluka to kotepatepa.[1][2] Ekoki kolandana na nausée, kosanza, kotoka, to nkokoso mpo na kotambola. Mingi mpeza ekomaka mabe koleka ntango ya koningisa moto. Vertigo eza lolenge loye loyebani mingi ya ba kizunguzungu.[2]

Maladi eye esukaka mingi mingi na vertigo eza vertige positionnel paroxystique bénin, bokono ya Ménière, mpe labyrinthite.[1][2] Eza na ba ntina misusu oyo eyebani mingi te na batu kasi ememaka mpe bokono ya vertigo, yango ezali AVC, kovimba bongo, kozoka na bongo, sclérose kilikili, na migraine.[2] Vertigo physiologique ekoki kosalema kolandana na kotiama na lolenge ya koningana na eleko molayi neti ntango mutu azali na masuwa to azali kaka kolandela eloko eye ekoningana na miso ya kanga.[3][4] Ntina misusu eza kozala exposer na ba toxine neti na monoxide ya carbone, masanga, to aspirine.[5] Vertigo ezali nkokoso nakati ya eteni ya vestibule. Ntina misusu ya kizunguzungu eza yambo na kweya makalekale, kobungisa kotelema alima, mpe kizunguzungu eye esembolami te.[2]

Vertige positionnel paroxystique bénin mingi ekoki kokomela mutu oyo azwamaka na bileko ya vertigo na koningana mbala na mbala mpe azalaka kaka malamu na bileko bina.[6] Bileko ya vertigo esengeli biwumela na se ya monuti moko.[2] Teste ya Dix-Hallpike mingi mingi epesaka eleko ya liso koningana na lobango oyo eyebani bo nystagmus.[1] Na bokono ya Ménière mingi mingi ezalaka ngonga kobeta nakati ya matoyi, kobungisa koyoka, mpe vertigo ntango elandaka ewumelaka koleka minuti ntuku mibale. Na labyrinthite vertigo ebimelaka na mbalakata mpe nystagmus esalemaka na boningani te.[6] Na lolenge oyo vertigo ekoki kowumela mikolo.[2] Esengeli mpe kotala ba ntina misusu oyo ezalaka ya makasi.[6] Yango ezali mpeza yasolo soki nkokoso misusu neti bolembu, moto mpasi, komona biloko mibale-mibale, to kobungisa ndenge ya koningana to kosimba eloko esalemi.[2]

Kizunguzungu etungisaka pene na 20%-40% ya batu na eleko songolo mpe pene na 7.5%-10% baza na vertigo.[7] Pene na 5% ya batu bazwaka vertigo na mobu songolo. Ekomaka kozwa mingi ntango bazakokola mpe etungisaka basi mbala mibale to misato koleka mibali. Vertigo ememaka pene na 2-3% ya batu na salle d'urgence nakati ya ba pays développés.[8]

References[kokoma | kobɔngisa mosólo]

  1. 1,0 1,1 1,2 et 1,3 Post, RE; Dickerson, LM (2010). "Dizziness: a diagnostic approach". American Family Physician 82 (4): 361–369. PMID 20704166. http://www.aafp.org/afp/2010/0815/p361.html. 
  2. 2,0 2,1 2,2 2,3 2,4 2,5 2,6 et 2,7 Hogue, JD (June 2015). "Office Evaluation of Dizziness.". Primary care 42 (2): 249–258. doi:10.1016/j.pop.2015.01.004. PMID 25979586. 
  3. Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).
  4. Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).
  5. Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).
  6. 6,0 6,1 et 6,2 Kerber, KA (2009). "Vertigo and dizziness in the emergency department". Emergency medicine clinics of North America 27 (1): 39–50. doi:10.1016/j.emc.2008.09.002. PMID 19218018. 
  7. von Brevern, M; Neuhauser, H (2011). "Epidemiological evidence for a link between vertigo & migraine". Journal of vestibular research: equilibrium & orientation 21 (6): 299–304. doi:10.3233/VES-2011-0423. PMID 22348934. 
  8. Neuhauser HK, Lempert T (November 2009). "Vertigo: epidemiologic aspects". Semin Neurol 29 (5): 473–81. doi:10.1055/s-0029-1241043. PMID 19834858.