Angola

Útá Wikipedia.

Republíki ya Angola

República de Angola

Dalapo
Bɛndɛ́lɛ ezangi
elílí_elembo-nkita
Mokáno mwa ekólo "Virtus Unita Fortior"
(Latɛ́) Lisangá Lisálaka Bokási
Loyémbo-lokúmu Angola Avante!
·Ba feti
- dipanda na Pulutugal
Description de l'image LocationAngola.svg‎.
Administration
Forme de l'État Republíki
Mokonzi wa ekólo
Mokambi Bulamatari na yě
Mokonzi wa ekólo
Mokambi Bulamatari na yě
Nkótá ya letá Liputrugɛ́shi
Mbóka-mokonzi Lwanda
Géographie
Engumba monɛ́nɛ Lwanda
Superficie totale 2 E9 km2
(Etando 1,246,700)
Fuseau horaire Ngonga UTC
Histoire
Démographie
Mito (2021) 33,642,646[1] hab.
(classé 25,789,024)
Densité 27 hab./km2
Économie
mosɔlɔ Kwanza (AOA​)
Divers
Nsuka ya kodi .AO
motángo ya foni +244


Republíki ya Angola ezalí esé ya Afríka. Ekabwání o likólo na Kongó-Kinsásá mpé Kongó-Brazzaville, o nsé na Namibia. Ezwámí lipandá o sánzá ya motóbá mikɔlɔ, 1975. Angola ezalí ekólo monene ezwami na ngámbo ya súdi-wɛ́sti ya kontina ya Afrika, na ndelo na Namibie, Kongo-Kinsasa mpé ​​Zambia. Na wɛsti ezali na libongo molai ya Mbu Atlantike. Etuka ya Kabinda ekabwani na bisika mosusu ya mboka mpe ezali na ndelo na Kongo-Brazzaville lokola.

Angola ezali mboka oyo ezali na petrole mingi mpe na ba minerais : diamant nde ezali na ntina mingi. Kasi mboka ezali mobola mpo na etumba oyo eumelaki mbula 29; liboso etumba ya lipanda na Portugal elandaki etumba ya bana-mboka tii na 2002.

Mboka yango moko ezali mingimingi na demokrasi mpe eyebani lokola République d'Angola (na Portugais: República de Angola, na prononciation ya IPA: /ʁɛ.'pu.βli.kɐ dɨ ɐ̃.'ɣ.lɐ/; na minoko ya mboka: République ya Ngola).

Lisolo[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bato bakanisaka ete bato ya liboso oyo bafandi kuna bazali babomi-nyama ya bato ya Wasani.

Na bikeke ya liboso nsima ya liwa ya Klisto, bato ya Bantu oyo bautaki na mikili mosusu oyo bayebi mosala ya bilanga mpe ya kosala bibende bautaki na nɔrdi.

Kobanda na ekeke ya 14, makonzi ndenge na ndenge epalanganaki na bisika mosusu ya Angola, ndakisa bokonzi ya Kongo, bokonzi ya Lunda mpe bokonzi ya Kasanje.

Empire ya Congo[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Carte historique du Congo

Bokonzi ya Kongo ezalaki bokonzi oyo epalanganaki na kati ya bikolo ya lelo Angola, Congo (Kinshasa) mpe Congo (Brazzaville).

Ebandaki na ekeke ya 14 mpe eumelaki tii na ekeke ya 17.

Mokonzi na yango azalaki na titre ya "Mwene Kongo" to "Manikongo" ya kabila ya Bakongo.

Bokonzi yango eyebani mingi na lisolo ya bato mpo na boyokani na yango na mikili mingi. Na ekeke ya 15, masuwa ya Portugal ekómaki na libongo na yango.

Na tango ya bokutani na ba Portugais, Royaume ya Congo ezalaki mbala mosusu na etando ya 300.000 km2 mpe ekangisaki quartier ouest ya Congo (Kinshasa) na biteni ya Angola na Congo (Brazzaville).

Ba Congolais ndenge na ndenge ba développer relation na Portugal mpe Congo ezalaki nation attachée na Portugal tee relation epanzani. Na eleko wana, balapolo ndenge na ndenge ekomamaki oyo epesi biso lelo elilingi malamu ya bokonzi.

Manikongo atikalaki na ville ya M'banza-Kongo.

Sima ya bakonzi bakomi bakristu ya katolike mpe ndakonzambe etongami, kombo "São Salvador do Congo" (na portugais: "Mobikisi mosantu ya Congo") ekomaki mingi mpo na mboka-mokonzi ya bokonzi.

Bokonzi yango ezalaki na bituka, bitúká mpe bamboka. Ba états sambo ezalaki Mpemba, Nsundi, Mpangu, Mbata, Mbamba mpe Soyo.

Na boyokani ya mikolo ekoya, bokonzi ya Kakongo, Loango na Ngoy ebimaki lokola fédération ya biteni minei.

Bokonzi ya Lunda[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bokonzi ya Lunda ezalaki bokonzi ya Bantu na mibu 1600 kino 1850 na libongo ya ebale Kasai, na ndelo na bikolo ya mikolo oyo ya Angola mpe République démocratique du Congo.

Bokonzi ya Kasanje[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Bokonzi ya Kasanje ezalaki bokonzi ya Bantu na bambula 1620 tii 1910 na libongo ya ebale Kwango, na nɔrdi ya mboka ya lelo ya Angola. Ebandisamaki na bakambi ya bokonzi ya Lunda.

Na 1910 ekɔtaki na Portugal mpe ekɔtisamaki na colonie na bango ya Angola.

Bokonzi ya ndongo[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Etando ya Bokonzi ya Ndongo.

Empire mosusu ya sud ezalaki oyo ya Ndongo, oyo ebundisaki ba Portugais pendant 30 ans na reine Njinga na siècle ya 17.

Etumba ya lipanda[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Na 1966 Jonas Savimbi abandi UNITA (na portugais : União Nacional para a Independência Total de Angola) lokola mobulu mpo na kosikola Angola na bokonzi ya bakolonia ya Portugal. UNITA ezalaki moko ya ba mouvements misato oyo ezalaki kobunda.

UNITA ebandaki lokola groupe communiste kolanda idéologie ya Mao Zedong. Bonguna kati na ba communistes chinois na Russie emonanaki na concurrence ya UNITA contre MPLA (na portugais : Movimento Popular de Libertação de Angola - Partido do Trabalho) oyo esungami na Russie.

Etumba ya bana-mboka[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Sima ya lipanda na 1975 MPLA eyangelaki capitale mpe esala gouvernement officiel kasi Savimbi akobaki kotelemela yango.

Savimbi sima azuaki soutien ya ba ennemis nionso ya MPLA sans considération ya idéologie. UNITA ezwaki lisalisi ya baguvernema ndenge na ndenge na mokili mobimba mpo na kolongola gouvernement ya MPLA na bokonzi. Savimbi azalaki kozua aide financière mpe minduki na ba gouvernements ya Etats-Unis, Chine, Afrique du Sud, Côte d’Ivoire, République démocratique du Congo (na tango wana eyebanaki na kombo ya Zaïre), Maroc, etc. Guvɛrnema ya Angola ezalaki kozwa lisalisi epai ya Russie, République démocratique allemande, Cuba, mpe Nicaragua.

Na mokolo ya 22 mars 2002, Jonas Savimbi abomamaki na bitumba. Mwa moke na nsima, UNITA mpe MPLA bandimaki kotika bitumba. UNITA ezwaki esika ya lingomba ya opposition. Kasi, ba procédures démocratiques ezongisamaki sima kino na maponami ya 2008 mpe 2012 mpe version ya constitution ya sika na 2010.

Bato[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Mabota ya Angola na 1970[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Mwasi ya Angola na bana libanda ya clinique.

Botangi ya bato ya 2014 ezwaki bato 24.383.301 mpe na 2016 bazalaki 25.789.024. Bavandi mingi bazali ba Afrika, mingi mingi bawutaka na mabota ya Ovimbundu (37%), Ambundu (23%) mpe Bakongo (13%). Machotara ezali 2%, Chinois 1,6% mpe ba Europeens 1%.

Atako minoko ya Bantu nde ezali mingi, mpe 6 kati na yango ezali na ezalela ya monɔkɔ ya ekólo, monɔkɔ ya Leta ezali Portugais.

Na oyo etali mangomba, ekanisami ete koleka katikati bazali Bakatolike mpe ndambo na minei bazali Baprotesta ya mangomba nkama ekeseni.


Bisé ya Afríka

Afríka ya Méditeranéa : Aljeria · Ejipte 1 · Libîya · Malɔkɛ 3 · Sudani · Tunisia

Afríka ya Wɛ́sita : Bɛnɛ́ · Burkina Faso · Gambi · Gana · Ginɛ · Ginɛ-Bisau · Kapvel 2 · Kotdivual · Liberia · Mali · Moritani · Nizé · Nizeria · Senegale · Sierra Leone · Togo

Afríka ya Katikati : Gabɔ́ · Ginɛ-Ekwatorial · Kamerun · Kongó-Brazzaville · Kongó-Kinsásá · Santrafríka · Santu Tome mpé Príncipe · Tsadi

Afríka ya Ɛ́sita : Burundi · Djibuti · Elitré · Etiopi · Kɛnya · Rwanda · Seyshel 2 · Somalia · Sudani ya Sidi · Tanzania · Uganda

Afríka ya Sidi : Angola · Botswana · Eswatini · Komori 2 · Lesoto · Madagasikari 2 · Malawi · Morisi 2 · Mozambíki · Namibia · Sidafríka · Zambia · Zimbabwe

Bisé mosusu : Sahara ya Limbɛ 4 · Somaliland

1 ezalí kaká eténi ya Afríka ndámbo    2 ekólo óyo ekútání o káti ya mái-mozindó    3 ezalí eténi ya Lisangá ya Afríka te    4 endimámí na bikólo niɔ̌nsɔ ya molɔngɔ́ tɛ́, kasi ezalí eténi ya Lisangá ya Afríka



Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ.
  1. Angola. The World Factbook