Moïse Tshombe

Útá Wikipedia.
Moïse Tshombe

Moïse Kapend Tshombe (* mwa 10, sánzá ya zómi,1919 na Musumba; † mwa 29, sánzá ya motóbá, 1969 na Alje) abótámí na mbóka Musumba, mbóka-mokonzi ya kala ya empire Lunda, na Territoire ya Sandoa na etúká ya Katanga, Azalí Molunda (Aruund). Abálákí mwǎna ya Mwantyaav Lunda. Moïse Tshombe atángí na école missionaires Methodists Américan. Ntángo asílísí kúná, tatá na yě alingákí atínda yě na Bɛ́lɛjika ákɛndɛ kosála kelási kúná, kasi bamindɛ́lɛ́ babóyákí. Akóbí na mayékoli ya botángi-mbɔ́ngɔ mpé bobɛti-ekembé. Nsima ya kelási na yě ayéí kokobanda na mombɔ́ngɔ na bolandi lokolo ya tatá na bokambi ya magazíni ebelé atíkákí. Bandá 1950 tíí 1957 yě azalákí motɛ́kisi mopáo mpé ayéí kopɔnɔmɔ membre ya conseil provincial ya Katanga. Akómákí lisúsu mokonzi wa Association de Classe Moyenne Africaine.

Politíki[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Kasi lotóma la politíki na yě ebandí sɔ̂lɔ́-sɔ̂lɔ́ na 1958, na bosálisi bwa Balunda na kosála Confédération Nationale Katangaise (CONAKAT.) Na bosáli parti óyo, ayákí mpé kosangana na Balubakat ya Jason Sendwe (Balubakat = Baluba ya katanga bazalí bato ya Nord-Katanga, Balunda bazalí na Sud-Katanga) mpé kokɛndɛ na Table ronde ya politíki ya 1960 na Bruxelles o ekólo Bɛ́lɛjika. Kúná ndé esíká mikáno mya kopésa Kongó lipandá mizwámákí, na ya koyánga mapɔnɔmi manɛ́nɛ maye makobimisa bakonzi ba mbóka. Nsima ya mapɔnɔmi, parti ya Tshombe, CONAKAT, ekɔ́tákí na mbulamatári Lumumba tɛ́, mpé abêngákí Lumumba « moto wa bosɔ́lɔ́ tɛ̂ ». Babɛ́lji bazalákí na elíkya áta mokɛ́ tɛ́ na Moyángeli mwa yambo ya Mbulamatári Patrice Emery Lumumba mpɔ̂ na mǐso ma bangó azalákí nationaliste ya makási óyo alingákí ’te bakaláki ya Bɛ́lɛjika batíkala na Kongó, alingákí libéralisme économique tɛ́, alingákí rôle ya église na Kongó tɛ́, bôngó na bôngó. Na bosisoli bôná, na bosálisi bwa baí-mbóka mpé basodá ba Bɛ́lɛjiika, Tshombe asakólákí mbótama ya État Indépendant du Katanga, mwa 11, sánza ya nsambo, 1960. Mbala mɔ̌kɔ́, Lumumba asɛ́ngí bosálisi ya ONU, eyákí na nkómbó ya ONU Congo (ONUC) mpé azwí yangó. Mission ya ONUC ezalákí mpɔ̂ na kokitola bokɛi bwa mampingá ya Bɛ́lɛjika mpé mpɔ̂ na kosálisa mbulamatári ya Kongó ebɔ́ngisa bosémbo bwa etando ya ekólo boye bozalí na likáma lya bitumba ya kili kili ya botómboki. Nsuka-nsuka ONU eyákí kolonga Tshombe na 1963. Yě akímí, akéí na Rhodésie du nord, Zambia ya lɛlɔ́, mpe nsima akéí kofánda na Espania. Ba gendarmes na yě bakíma na Angola mpé kúná bazalí kozwa bosálisi bwa Pulutugal.

Moyángeli mwa yambo ya Bulamatári[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Première législature esengélákí esíla mokɔlɔ ya 30 ya sánzá ya motóbá 1964. Libosó wâná, Moyángeli mwa yambo ya Bulamatári Cyrille Adoula asakólákí o mokɔlɔ 15 ya sánzá ya motóbá 1964 na Prezidá Joseph Kasa-Vubu ’te akopésa bolongwi-mɛ́i na yě na nśuka ya législature, lokóla ’te 30 ya sánzá ya motóbá 1964 mpé akozela nsúka na referendum tɛ́ óyo esengélí endima constitution ya sika, constitution ya Luluabourg ya 1964.

Na ntángo eye, mobúlú ezalákí makási na Kongó, botɔmbɔki na Ɛsíta ebandákí kotíya Armée nationale congolaise na kpɔ́kɔ́sɔ́ ya makási mpé molóka mosusu ebandákí kosálema ntína na bokɛi boyángámí mpɔ̂ na nsúka ya sánzá ya motóbá ya 1964 ya mangómbá ma Nations Unies. Na nyɔ́nsɔ óyo, neti Adoula mpé alingákí lisúsu kokóba tɛ́, Kasa Vubu azalákí lisúsu na bopɔni tɛ́, esengélákí aluka nzelá nɔkínɔki ya moto óyo esengélí akitání na Adoula na ebóngá ya mokonzi ya mbulamatári, mpé moto yangó ebɔngí ázala óyo akokí kosangisa bolandi bwa politíki bɔ́nsɔ tǒ kokamba bolandi bɔ́nsɔ mpɔ̂ na boyókani mpé bomɔ̌kɔ́ ya ekólo.

Esika Tshombe azali na Espania, akangaki maboko te, a activaki ba contactes na ye na milieux ya politique na ya Affaires na poto mpe na milieux politique ya Kongó oyo ezalaki na pouvoir, na opposition mpe na rébellion. Yango wana ayaki komonana neti mutu oyo akokaki ko réunir consensus au tour de lui mpo na ko diriger gouvernement ya transition ya Kongó tangu Cyrille Adoula ako démissionner effectivement. Na mukolo ya 26 yúni 1964, Adoula abengisaki ye na capitale, Léopoldville mpo asolola na ye na ndenge alingi kotikela ye ebonga.

Le, 10 yúli 1964, Moïse Tshombe asali gouvernement na ye oyo ebengami gouvernement de transition ou de salut public. Ezalí de transition mpo yango esengelaki esalisa ba élections législatives. Sima ya mikolo ya bosali musala, mindondo entre Président Joseph Kasa Vubu na Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari Moïse Tshombe ebandi kosalema mpe suka na yango Kasa Vubu ayaki kolongola Tshombe na poste ya Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari. Mpo na nini Président Kasa Vubu alongolaki Tshombe na poste ya Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari?

Likambo ekotisaki mindondo entre Kasa Vubu na Tshombe ezalí ya ba élections. Tango gouvernement Tshombe esalisi ba élections mpe ba résultats ebandi kobima, Kgbokoso ekoti kati na bango mibale mpo Kasa Vubu alingaki te a perdre ebonga na ye ya Président de la République mpo na miso ma ye, Tshombe, azalaki na mposa ya ebonga wana! Kasa Vubu abandi kofongola miso mpe aye kosala discours na radio mpo na koyebisa que ba élections ezalí na ba irrégularités, esengeli ba examens ya ba recours esalema. Na yango, akati processus électoral mpo apesa Cour suprême temps ya ko examiner ba requêtes batu na ba partis politiques et associations ekotisaki.

Ba oyo babandaki ko critiquer ndenge gouvernement a organiser ba élections babandaki koloba que yango esalemi suivant mode ya Confédération Nationale du Congo (CONACO ex-CONAKAT) mpo Godefroid Munongo nde azalaki ministre de l’intérieur. Kasi tango Cour suprême esengi que ba bandela ba élections bipayi oyo emonaki que ba irrégularités ezalí ya solo, remaniement ministériel esalemaki dans le soucie ya komeka ko apporter équilibre. Victor Nendaka ayaki kokoma ministre de l’intérieur. Ye azalaki opposant ya Tshombe. Kokota ya Nendaka na gouvernement ememaki élan mususu na oyo etali lutte contre Tshombe.

Kasa Vubu na Tshombe boyokani bozalaki lisusu te, opposition ekomaki kosenga na Tshombe a élargir gouvernement na ye tee suka suka ekomi kosenga démission ya Tshombe na gouvernement na ye. Front Démocratique Congolais (F.D.C) ya Nendaka ekomaki kosala ba pressions makasi mpo na mise en place ya gouvernement d’union nationale. Nionso oyo eyali ko affaiblir Tshombe politiquement en plus ya situation politique, économique et sociale ya mboka.

F.D.C. ekomaki kosala nionso mpo Tshombe alongua: kosenga na Président Kasa Vubu asalela message na ye oyo apesaki na radio le, 30 apríli 1965, a nommer informateur mpo na consultation en vue ya formation ya gouvernement ya sika, etc. Le, 13 ɔkɔtɔ́bɛ 1965, Kasa Vubu aye kolongola Tshombe na discours asalaki na séance solennelle ya ouverture ya session ordinaire des Chambres, en ces termes «En vue d’assurer le respect des exigences fondamentales et des règles habituelles de la démocratie, j’ai mis fin aux fonctions de Tshombe à la date de ce jour, les Chambres constituées, et le gouvernement n’ayant pas cru devoir, de sa propre initiative, présenter sa démission» (Discours repris na Courrier d’Afrique ya le, 8 ɔkɔtɔ́bɛ 1965.)

Kasa Vubu na discours na ye alakisaki kanda azalaki na yango na lolenge alongolaki Tshombe. Acte oyo esepelisaki ba oyo babandaki kolinga Tshombe akwueya. kanda ya Kasa Vubu ewutaki du fait que asengaki na Tshombe, mbala na mbala a démissionner kasi ye aboyaki kosala bongo, yango wana Kasa Vubu ayaki ko agir ndenge a agisaki wana, sans diplomatie aucune. Kasi, Tshombe aningana te, aloba eloko mko te, afanda très calme et digne.

CONACO ya Tshombe e gagnaki ba élections (Chambre des représentants «parlement» na Sénat). Il était évident que na moment oyo Tshombe akomaki ko bouler ndenge nini akoma candidat ya parti na ye mpo na ba élections présidentielles.

Mobéko likonzi mwa mokolo mwa 1 augústo mobú mwa 1964[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Mobéko likonzi mwa mokolo mwa 1 augústo mobú mwa 1964, na atikeli ya 185, aliéna 2, elobaki 'te la mission ya bulamatari de transition ezalaki kobongisa maponomi. Molili ezaláki na sima, elingi koloba 'te, disposition moko te ya terme ya transition dont la mission essentielle ezalaki ya ko organiser ba élections. Et après publication mpe proclamation ya ba résultats ya ba élections, gouvernement oyo ekokoma nini?

Commission constitutionnelle etikelaki Président de la République choix ya ko décider soki alingi bulamatari de transition ezala tee na suka ya mandat na yango ou bien alongola yango soki ba circonstances politiques ezalí kosenga 'te alongola yango. Engebene na Selon constitution, na atikele 66, e prévoir que Président de la République a soumettre na approbation ya Parlement réuni na congrès, l’acte ya nomination ya ba membres de tout gouvernement qu’il forme, et cela dans le délais de 30 jours kobanda mokolo mwa séance du Parlement. ya yambo.

Conflit oyo ebandaki ko renforcer position ya Président Kasa Vubu mpe ezalaki ko désavantager Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari Tshombe, dans la mesure où mission ya bulamatari de transition ekomaki na suka, Président de la République a révoquaki ye na discours ya le, 13 ɔkɔtɔ́bɛ1965 devant deux Chambrea renies en congrès national na première session ordinaire na yango oyo ebandaki le, 7 ɔkɔtɔ́bɛ 1965, mukolo session extraordinaire esilaki. Président kasa Vubu ayaki ko nommer Evariste Kimba formateur du bulamatari , ye azalaki ministre ya Affaires étrangères ya Katanga à l’époque ya Etat Indépendant du katanga, députe mpe mopɔnɔmi ya Balubakat, membre ya F.D.C. ya Nendaka, oyo ezalaki na minorité na Parlement.

Evariste Kimba aponɔmɔ́kɔ́ na ordonnance n° 397 ya mokolo mwa 18 ɔkɔtɔ́bɛ mobú 1965. Mokolo mwa 14 novɛ́mbɛ mobú mwa 1965, akeyi liboso ya ba Chambres, engebene na atikele 66 ya Mobéko likonzi, kasi congrès e recaler ye: likolo lya 262 parlementaires baye basengeleka kopono, bulamatari ya Kimba ezua 121 voies pour, 134 voies contres, na 7 abstentions. Na motu makasi, Kasi Vubu a renouvelaki ye lisusu confiance na ye. Kasi Kimba azuaki lisusu temps ya komeka lisusu mbala ya mibale kokende liboso lya congrès nationale tɛ́ mpo Haut commandement militaire eyaki kosala coup d’Etat mokolo mwa 24 novɛ́mbɛ mobú mwa 1965, ekuewisi Kasa Vubu na Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari na ye Kimba, y compris na ba Chambres nionso ya congrès!


Na mokolo mua 6 febwáli mobú mwa 1965, Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari ya Kongó-Kinsásá, Moise Tshombe atiyaki misapi na boyokani na Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari ya Bɛ́lɛjika Paul-Henri Spaak. Na boyokani bwana buzalí ndambo ya nungungu enene kati na royaume de Bɛ́lɛjika na Kongó-Kinsásá. Yango ebengami: nungungu belgo-congolais.

Contentieux oyo ebotami tango Congo ekomaki lipanda mokolo mwa 30, sanza ya yúni mobú mwa 1960 mpe esengelaki Bɛ́lɛjika etika Congo en tant que mboka oyo ekomi kokonzama na bana Kongó-Kinsásá bango moko, Eye elingi koloba ekolo nsomi. Toyebi que Congo esalemaki kobanda ndenge ekatamaki na 15 novɛ́mbɛ 1884 tee na 26 febwáli 1885 na Conférence de Berlin tee na Convention ya Saint Germáyin–En-Haye ya 10 sɛtɛ́mbɛ 1919. Wuta wana tee na 30 yúni 1960, esengelaki Bɛ́lɛjika ezongisela Congo souverain ba moyens propres humáyins; techniques; matériels; juridiques et diplomatiques; financiers et économiques ya Etat: ba moyens humáyins ezalí batu oyo bazali kosala mosala, ba moyens techniques ezalí administration publique de l’Etat na ba régies na yango; moyens matériels ezalí ba biens meubles, immeubles, ba véhicules, fournitures na matériels ya bureau; moyens juridiques ezalí ba textes de lois et règlements, archives et documents, na sceaux; ba moyens diplomatiques ezalí ba traités, conventions na ba accords diplomatiques, commerciaux et consulaires; moyens financier et instruments monétaires ezalí budget en cours d’exercice, budget extraordinaire ya plan décennal du développement, ba structures financières, ba contrats financiers na dette publique de l’Etat (prêt na emprunts direct na engagements, ba dettes consolidée, ba dettes non garanties), ba créances ya Kongó-Kinsásá, ba avances na acomptes ya trésorerie na réalisation ya misala ya ndenge na ndenge, ba avoirs et créances en devises, ba titres, ba participations na capital ya dotation ou na oyo ya prêt, ba actions , etc.

Sika tika totala, boyakani buye Tshombe na Spaak batiyáká misapi, ezalaki na ntina nini? Lingomba ya mpo na mombono mpe *industrie liye babengi na lifalanse "Compagnie du Congo pour le Commerce et l’Industrie" C.C.C.I. na bokuse lizalí lisanga lya mombongo ya yambo liye mani Léopold II asaláká na Kongó-Kinsásá, mokolo mwa 15 sanza ya misato mobú mwa 1887. Sima ya wana, ba filiales na yango eyaki mpe kosalema. Sima aye kosala ba sociétés de charte: le Comité Spécial du Katanga (C.S.K.) na 1890, la Compagnie des Chemins de fer du Congo Supérieur aux Grands lacs africains (C.F.L.) na1902 na le Comité National du kivu (C.N.KI.) na 1927. Alors, pour mieux exploiter, esengelaki ba holdings esalema: l’Union Minière du Haut Katanga le, 28 ɔkɔtɔ́bɛ 1906; Lingomba lya nzela ya masini ya bas congo mpe Katanga liye babengi na lifalanse "la Compagnie des Chemins de Fer du Bas Congo au Katanga" mpe B.C.K. na bokuse mokolo mwa 31 ɔkɔtɔ́bɛ mobú mwa 1906; Lingomba lya Zamba liye libengami na lifalanse "Société Forestière et Minière du Congo" mpe FORMINIERE na bokuse mokolo mwa 6 novɛ́mbɛ mobú mwa 1906. Nionso oyo ezalaki mpona ko exploter malamu malamu mpe kobimisa bomengo bwa Kongó-Kinsásá libansa ya ndelo ya mboka mpo bukende kobanda na Bɛ́lɛjika na mikili misusu. Ba compagnies nionso oyo efandaki pepele mpe ba sites de production na exploitation na yango ezalaki likolo ya bomengo, ba nzela ya masini mpe etongamaki uniquement na but ya ko faciliter sortie ya ba richesses wana, tout comme ba coûts ya exploitations ezalaki faibles mpe batu moindo bazalaki kosala kuna bazali kozua bango na considération humáyine moko te mpe bazalaki kofutama malamu tɛ́.

Accords ya 6 febwáli 1965[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Avant indépendance, Belge abimisaki décret ya 17 yúni 1960 oyo ebandaki kopesa possibilité na ba entreprises mpo epona nationalité belge ou congolaise. Bien évidemment, ba sociétés nionso eponaki nationalité belge mpo elingaki ko fonctionner te selon ba dispositions ya droit Congolais. Changement ya nationalité wana ebandaki ko entraîner ba pertes fiscales na Etat Congolais.

But ya ba accords ya 6 febwáli 1965, ezalaki mpo na kosala transfère ya portefeuille ya Kongó ya Bɛ́lɛjika na Republíki Demokratiki ya Kongó. Awa nde ebandeli ya lisolo mpe likambo ya malette diplomatique oyo Tshombe ayaki na yango mpe abandaki kolakisa na batu tango awutaki na Bruxelles, sima ya ba négociations na signature ya ba accords, soi-disant que ye a réussir transfert ya ba propriétés des titres oyo ezalí kosala portefeuille de l’Etat. Ba accords oyo Tshombe a signaki ezalaki vraiment na bénéfice ya Kongó te mpo ba Congolais balingaki kaka ba récupérer ba actifs. Ba Belges, côté na bango, balingaki bakinela ba Congolais ba actifs na ba passif. Likambo ezalaki nde wana. Yango wana tango Tshombe azongaki na Léopoldville na malette diplomatique oyo abandaki kolakisa na batu que a récupérer portefeuille ya l’Etat, mingi bamonaki que yango ezalí lokuta mpo asalaki ba concessions mingi pour ne rien obtenir. Mpe ba accords wana ezalaki léonins, ekitisaki lokumu ya Congo. Est-ce que, Tshombe azalaki na marge ya manœuvre ebele? A vrai dire, azalaki na yango vraiment te mpo il ne pouvait pas passer outre le soutien militaire et diplomatique ya ba Belges mpo basalisa ye na bitumba azalaki (gouvernement) na yango na ba rebelles na kati ya Congo. Na loyenge wana, haut commandement eyaki kosala coup d’Etat militaire mpe epesi bokonzi na Général Mobutu. Tango Président Mobutu Sese Seko akomi mokonzi ya ekolo, abandi ko mener campagne contre ba accords oyo Tshombe a signaki na Spaak. Remise en cause na yango nde eyaki kosala que na discours ya 30 yúni 1966, Président Mobutu aloba na miso ya batu que: «Tshombe azali accuser mpo na haute trahison na ndenge a signaki ba accords oyo ezalí ko bénéficier na Congo te mpe ezalí kolakisa que azali na service ya colonisateur belge.»

  • na likambReproche o ya dette

Esengeli toyeba que Congo ezalaki na situation économique moko mobulu mpo ata compagnie moko te ezalaki ya l’Etat en terme ya majorité ya actions. Likambo ya dette coloniale mpe ezalaki kopesa kobendana mpo 60 % na yango esengelaki nde R.D.Congo efuta yango. Ba niongo oyo mundele amikotisaki na makambo oyo ezalaki na ba projets na ye, fuite des capitaux na périphérie, ba budget ordinnaires déficitaires, ba niongo oyo ba sociétés coloniales ezuaki na oyo Etat Indépendant du Congo emikotisaki, ba ventilations ya dépenses kili kili mpe ematisaki dette publique interne tout comme ba opérations ya moyens effectifs de paiement mpe. Yango wana Fonds Belgo-Congolais d’Investissement et de Gestion esalemaki. Alimentation na yango ebandaki kowuta na ba virements réguliers périodiques wuta na ba banques centrales ya Bɛ́lɛjika na R.D.Congo na compte ya Fonds. Non seulement Congo ezalí kofuta 60 % ya part, kasi siège ya Fonds ezuami na Bruxelles, Président na Directeur général bazali ba Belges!!!

  • Reproche na likambo ya Portefeuille

Portefeuille de l’Etat ezalí ba titres, ba actions na ba droits oyo l’Etat ezalí na yango na ba organismes na ba sociétés nionso oyo ezuami na mabele ya Congo. Ba droits ya l’Etat elingi koloba: ba participations na bénéfice ya société neti na contrôle ya gestion, ba dividendes ya société, droit de vote na participation na conseil d’administration et de gestion, ba créances oyo ewuti na ba prêts, libération ya capital, participation na ye na ba parastataux, etc. Accords ya 6 febwáli 1965, ekangaki Congo na kingo na oyo etali ba transfères ya ba titres, ba droits na obligations. Donc, l’Etat Congolais esengelaki lisusu e négocier na ba sociétés na oyo etali ba transfères wana. Il fallait existence ya modalité de transfère mpo avant tout transfère esengelaki esalema na modification ya convention!!!

Neti Belge ayebaki que Portefeuille ya Kongó ya Bɛ́lɛjika ekokoma ya R.D.Congo, atiaki article 2 ya loi fondamentale du 19 máyi 1960. Yango elobaki boye: « Les lois, décrets et ordonnances législatives, leurs mesures d’exécution ainsi que toutes dispositions réglementaires existant au 30 yúni 1960 restent en vigueur tant qu’ils n’auront pas été expressément abrogés. ».

Avant lipanda, le 30 yúni 1960, abomi ba compagnies misatu: le Comité national du Kivu (C.N.K.), la Compagnie de Chemin de Fer et voies fluviales (C.F.L.), le Comité spécial du Katanga (C.S.K.) mpe du coup abimisi conventions misatu (Etat –Privé) sans consultation ya Congolais, na décret royal du 26 yúni 1960. Belge abomi ba compagnies de la charte oyo misatu mpo na ko diminuer ba parts ya actions ya Etat Congolais na kati ya Union Minière du Haut Katanga. Et pourtant ba compagnies à la charte esalemaki na mabele « minier » oyo l’Etat colonial apesaki bango mpo basala ba grandes concessions minières. Eyenbani malamu que sol et sous sol ezalí ya l’Etat.

Donc, Congo ebandaki kaka ko dépendre na Bɛ́lɛjika économiquement suite na motambo wana. Yango wana dénonciation ya liboso esalemaki na Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari Cyrile Adoula. Ye a signaki ba accords na Paul Henri Spaak le, 24 mársi 1964 mpo portefeuille ya Congo ezonga sans aucune condition. Na novɛ́mbɛ de la même année, Président Joseph Kasa-Vubu a promulgaki décret-loi ya 30 novɛ́mbɛ 1964 oyo ezalí ko abroger décret-loi ya 26 yúni 1960. Yango ebandaki koloba que l’Etat congolais ezalí ko succéder entièrement na portefeuille ya ba sociétés oyo misatu totangi likolo mpe ezalí kozua 1/3 ya part ya action na U.M.H.K. comme étant actionnaire principal. Tango wana Tshombe asi akomaki Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari. Kasi Bɛ́lɛjika esalaki Tshombe ba pressions makasi mpe esengaki na ye aya ko signer ba accords ya 5 febwáli en échange ya soutien militaire et diplomatique. Accords yango nde ezalí komonisa Congo buale tee lelo oyo.

Sima ya wana makambu ebele elandaki: Président Mobutu apesaki ba Belges ultimatum tee na 31 dɛsɛ́mbɛ 1966 mpo ba sièges sociaux ya portefeuille ya R.D.Congo ezonga na Congo; loi Bakajika; nationalisation ya Union Minière du Haut Katanga; na ba compagnies mosusu; création ya Air Congo, Zaïrianisation, etc.

Tála mpé[kokoma | kobɔngisa mosólo]


Moyángeli wa yambo ya Bulamatari ya Kongó-Kinsásá

Patrice Lumumba | Joseph Iléo | Albert Ndele | Justin Marie Bomboko | Antoine Gizenga | Joseph Iléo | Cyrille Adoula | Moise Tschombé | Évariste Kimba | Léonard Mulamba | Mpinga Kasenda | Bo-Boliko Lokonga Monse Mihambo | Nguza Karl-I-Bond | N'singa Udjuu Ongwabeki Untubu | Kengo Wa Dondo | Mabi Mulumba | Sambwa Pida Nbagui | Kengo Wa Dondo | Lunda Bululu | Mulumba Lukoji | Etienne Tshisekedi | Bernardin Mungul Diaka | Nguza Karl-I-Bond | Etienne Tshisekedi | Faustin Birindwa | Kengo Wa Dondo | Etienne Tshisekedi | Likulia Bolongo | Augustin Matata Ponyo | Samy Badibanga | Bruno Tshibala | Sylvestre Ilunga